Banzembo 125 - Mokanda na BomoiNzembo 125 Kimia ya solo 1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe. 1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe. Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te, oyo epikama mpo na libela. 2 Ndenge bangomba ezingeli Yelusalemi, ndenge wana mpe Yawe azingeli bato na Ye, kobanda sik’oyo kino libela na libela. 3 Bokonzi ya mabe ekowumela te na etuka ya bato ya sembo, mpo ete basangana te na mabe. 4 Yawe, zala malamu mpo na bato malamu mpe mpo na bato oyo bazali alima na mitema ! 5 Kasi tika ete Yawe abengana bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe ! Tika ete kimia ezala na Isalaele ! |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.