Banzembo 124 - Mokanda na BomoiNzembo 124 Lisungi na biso ewutaka epai ya Yawe 1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. 1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe abatelaki biso te ; tika ete Isalaele aloba bongo ! 2 Soki Yawe abatelaki biso te tango bato babundisaki biso, 3 mbele bamelaki biso ya bomoi tango basilikelaki biso makasi. 4 Boye mayi elingaki kozindisa biso, mbonge makasi elingaki komema biso. 5 Mayi makasi elingaki kozindisa biso. 6 Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo andimaki te ete minu na bango epasola biso ! 7 Tobikaki lokola ndeke liboso ya motambo ya mokangi bandeke ; motambo ekatanaki, mpe tokimaki. 8 Lisungi na biso ezali kati na Kombo na Yawe oyo akela likolo mpe mabele. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.