Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 123 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 123 Wana tozali kozela ngolu na Ye
1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai epai na Yo, Yawe, oyo ovandi na Kiti na Yo ya Bokonzi kati na Lola.

2 Ndenge miso ya bawumbu etalaka nkolo na bango, mpe miso ya mwasi mosali etalaka nkolo na ye ya mwasi, ndenge wana mpe miso na biso ezali kotala Yawe, Nzambe na biso, kino asalela biso ngolu.

3 Yawe, salela biso ngolu, yokela biso mawa ! Pamba te tolembi kotiolama !

4 Tolembi penza kotiolama na bato ya lolendo mpe ya lofundu !

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ