Banzembo 122 - Mokanda na BomoiNzembo 122 Bosambela mpo na kimia ya Yelusalemi 1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. 1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Nasepelaka tango balobaka na ngai : « Tokende na Tempelo ya Yawe ! » 2 Yelusalemi, makolo na biso etelemi na bikuke na yo ! 3 Yelusalemi, engumba oyo etongama malamu ; engumba oyo biteni na yango ekangana esika moko. 4 Ezali kuna nde mabota ekendaka, mabota ya Yawe, kolanda mibeko kati na Isalaele, mpo na kosanzola Kombo ya Yawe. 5 Pamba te bakiti ya bokonzi ya bato oyo basalelaka bosembo ezali kuna, bakiti ya bokonzi mpo na ndako ya Davidi. 6 Bosenga kimia ya Yelusalemi ! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia ! 7 Tika ete kimia ezala kati na yo mpe kati na bandako na yo ya bokonzi ! 8 Likolo ya bolingo na ngai mpo na bandeko mpe balingami na ngai, nalobi : « Tika ete kimia ezala kati na yo ! » 9 Likolo ya bolingo na ngai mpo na Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso, nasengi bolamu mpo na yo. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.