Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 121 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 121 Yawe, Mosungi mpe Mobateli na ngai
1 Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe.

1 Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba : lisungi na ngai ekowuta wapi ?

2 Lisungi na ngai ewutaka na Yawe oyo akela likolo mpe mabele.

3 Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ; Ye oyo abatelaka yo animbaka te.

4 Te, Ye oyo abatelaka Isalaele animbaka te mpe alalaka pongi te !

5 Yawe azali mobateli na yo ; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo.

6 Ezala na moyi to na butu, moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te !

7 Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo ;

8 Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ