Banzembo 120 - Mokanda na BomoiNzembo 120 Kangola ngai 1 Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. 1 Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe ayanolaki ngai. 2 Oh Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe wuta na lolemo ya lokuta ! 3 Yo, lolemo ya lokuta, Yawe akopesa yo nini, akofuta yo nini ? 4 Akobeta yo na makonga ya elombe ya bitumba, oyo ezali ya songe, elongo na makala ya moto ya nzete ya nzube. 5 Mawa na ngai, mpo ete navandi lokola mopaya kati na Mesheki, kati na bandako ya kapo ya Kedari. 6 Navandaki tango molayi kati na bato oyo balingaka kimia te. 7 Ngai, nazali moto ya kimia ; kasi soki kaka nameki koloba na tina na kimia, bango baponaka mbala moko bitumba. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.