Banzembo 12 - Mokanda na BomoiNzembo 12 Nzambe akokisaka bilaka na Ye 1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe. 2 Yawe, sunga biso ! Pamba te bayengebene bazali lisusu te ; bato ya kotiela motema bazali lisusu te kati na bana na bato. 3 Bato nyonso bazali kokosana bango na bango, bazali kolobana maloba ya sukali, kasi mitema na bango ezali sembo te. 4 Tika ete Yawe aboma bato nyonso oyo balobaka maloba ya sukali mpe batondi na lolendo, 5 ba-oyo balobaka : « Tokolonga na nzela ya lolemo na biso, bibebu na biso ekolobela biso ; nani akoluka kozala nkolo na biso ? » 6 Yawe alobi : « Mpo ete bazali konyokola babola mpe kolelisa bato oyo bakelela, natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami. » 7 Maloba ya Yawe ezalaka peto lokola palata oyo balekisi na moto mpe bapetoli mbala sambo. 8 Yo, Yawe, okobatela bato oyo bakelela, okobikisa biso mpo na libela liboso ya bato mabe. 9 Bato mabe batambolaka na bonsomi bipai na bipai soki bato bapesi bozoba lokumu. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.