Banzembo 114 - Mokanda na BomoiNzembo 114 Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito 1 Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito, tango libota ya Jakobi elongwaki na ekolo ya bapaya, 2 Yuda ekomaki Esika ya bule ya Yawe, mpe Isalaele ekomaki mabele na Ye. 3 Ebale monene emonaki yango mpe ekimaki, mayi ya Yordani ezongaki na sima, 4 bangomba epumbwaki lokola bameme, bangomba mike epumbwaki lokola bana ya ntaba. 5 Ebale monene, nini ezalaki kati na yo mpo ete okima ? Yordani, mpo na nini ozongaki na sima ? 6 Bino bangomba, mpo nini bopumbwaki lokola bameme ? Bongo bino bangomba mike, mpo na nini bopumbwaki lokola bana ya ntaba ? 7 Mokili, lenga liboso ya Yawe, liboso ya Nzambe ya Jakobi, 8 oyo abongolaka libanga monene liziba, mpe libanga etima. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.