Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 111 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 111 Mosali makambo ya kokamwa

1 Bokumisa Yawe ! Nakokumisa Yawe na motema na ngai mobimba kati na likita ya bato ya sembo mpe kati na mayangani.

2 Yawe asalaka makambo minene ; bato nyonso oyo balingaka yango bakanisaka yango.

3 Misala na Ye emonisaka nkembo mpe lokumu na Ye, mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela.

4 Alingaka ete bakanisa bikamwa na Ye. Yawe atondi na mawa mpe atalisaka ngolu na Ye.

5 Apesaka bato oyo batosaka Ye bilei ; akanisaka Boyokani na Ye tango nyonso.

6 Amonisaki nguya na Ye epai ya bato na Ye na nzela ya misala na Ye tango apesaki bango libula ya bato ya bikolo mosusu.

7 Misala na Ye nyonso elakisaka boyengebene mpe bosembo na Ye ; mibeko na Ye nyonso ebongi na kondima yango.

8 Epesama mpo na libela, mpe esengeli kotosa yango na bosembo mpe na bosolo.

9 Akangolaki bato na Ye, mpe asalaki Boyokani ya libela elongo na bango. Azali Nzambe Mosantu mpe Nzambe ya somo.

10 Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ