Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 101 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 101 Komipesa mpo na kobundisa mabe
1 Nzembo ya Davidi.

1 Nzembo ya Davidi. Nakoyemba bolingo mpe bosembo ; nakoyembela nde Yo, Yawe.

2 Nakolanda na bokebi nzela ya bato oyo bazangi pamela. Okoya epai na ngai tango nini ? Kati na ndako na ngai, nakotambola malamu na motema ezangi pamela.

3 Nakotala eloko moko te ya mabe ; nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima, ekoki kokangama na ngai te.

4 Mosika na ngai, motema ya kilikili ; naboyi kosala mabe.

5 Nakosala ete avanda kimia, moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya baninga. Nakokoka te kotala moto ya lolendo mpe moto ya lofundu.

6 Nakopona nde bato ya sembo kati na mokili mpo ete bavanda pembeni na ngai ; moto na etamboli ezanga pamela nde akozala mosali na ngai.

7 Kati na ndako na ngai, mokosi akovanda te ; liboso na ngai, mokosi akotelema te.

8 Tongo nyonso, nakosala ete bato nyonso ya misala mabe kati na mokili bavanda kimia ; nakolongola na engumba ya Yawe bato nyonso ya mabe.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ