Banzembo 100 - Mokanda na BomoiNzembo 100 Yawe asanzolamaka kati na bato na Ye 1 Nzembo ya kozongisa matondi. 1 Nzembo ya kozongisa matondi. Bino nyonso bato ya mokili mobimba, boganga na esengo epai na Yawe ! 2 Bosalela Yawe na esengo, mpe boya liboso na Ye na banzembo ya esengo. 3 Boyeba ete Yawe nde azali Nzambe ; Ye nde asala biso, mpe tozali bato na Ye. Solo, tozali bato na Ye mpe etonga oyo aleisaka. 4 Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi, bokota na lopango na Ye na kokumisa. Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye. 5 Pamba te Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko, mpe boyengebene na Ye, libela na libela. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.