Banzembo 1 - Mokanda na BomoiBuku ya liboso Nz 1.1–41.14 Nzembo 1 Mibeko ya Yawe ezali etima ya mapamboli 1 Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe, atelemaka te na nzela ya bato ya masumu, mpe avandaka te esika moko na batioli, 2 kasi asepelaka na mibeko ya Yawe mpe akanisaka yango butu mpe moyi. 3 Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te ; misala na ye nyonso etambolaka malamu. 4 Kasi ezali bongo te mpo na bato mabe ! Bazali lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe epanzaka. 5 Yango wana bato mabe bakolonga te kotelema na kosambisama, mpe bato ya masumu bakowumelaka te kati na lisanga ya bato ya sembo. 6 Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo, kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.