Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 9:9 - Mokanda na Bomoi

9 Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 9:9
43 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti bakendeki, bamatisaki Salomo na likolo ya mile ya mokonzi Davidi mpe bamemaki ye na etima ya Giyoni.


Tika ete Isalaele asepela na Mokeli na Ye ! Tika ete bato ya Siona bazala na esengo mpo na Mokonzi na bango !


« Ezali Ngai nde natiaki mokonzi na Ngai na Siona, ngomba na Ngai ya bule. »


Nzembo ya bolingo oyo bana ya Kore bayembaki. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda oyo babengaka Lisi.


Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo, pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino ! »


Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi : Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga, mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi, ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka, bantoma bazali komema bozwi na bango na mikongo ya ba-ane, bomengo na bango na mikongo ya bashamo, epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bango ata litomba moko te :


Pamba te Yawe azali Mosambisi na biso, Yawe azali Mosali mibeko na biso, Yawe azali Mokonzi na biso ; Ye nde akobikisa biso.


Mata likolo ya ngomba, Siona, yo momemi sango malamu ; tombola mongongo na yo mpe ganga makasi, Yelusalemi, yo momemi sango malamu ; tombola yango penza, kobanga te ; loba na bingumba ya Yuda : « Botala Nzambe na bino ! »


Ezali Ngai, Ngai kaka moko, nde nazali Yawe ; Mobikisi mosusu azali te, soki Ngai te.


pamba te Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele, Mobikisi na yo. Nakabi Ejipito mpo na kofuta niongo ya lobiko na yo, Kushi mpe Seba na esika na yo.


Botelema mpe bopesa sango, boloba makambo na bino mpe tosamba elongo ! Nani asakolaki yango wuta kala mpe atatolaki yango wuta na tango oyo eleka ? Ezali Ngai Yawe te ? Ezali na Nzambe mosusu te, soki Ngai te. Nazali Nzambe ya sembo mpe Mobikisi ; mosusu azali te, soki Ngai te.


Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu, ba-oyo batatolaka kimia, ba-oyo bamemaka basango ya boboto, ba-oyo basakolaka lobiko, ba-oyo balobaka na Siona : « Nzambe na yo azali Mokonzi ! »


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Tala makambo oyo Yawe atatoli kino na basuka ya mabele : « Boloba na Siona, mboka kitoko : ‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya ! Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye, mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › »


Nzokande, bakosalela Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi oyo nakotia mpo ete akamba bango.


Libebi ! Libebi ! Nakokomisa yango libebi. Ekotikala kobonga lisusu te kino tango moto oyo akopesa etumbu, oyo nakopesa ye makoki mpo na yango, akoya. ›


Kasi nakotalisa bolamu na Ngai epai ya libota ya Yuda mpe nakobikisa bango. Ngai moko Yawe, Nzambe na bango, nde nakosala bongo ; ekozala na nguya ya tolotolo te, ya mopanga te, ya bitumba te, ya bampunda te to mpe ya bashar te.


Mpo na yo, ndako molayi ya bakengeli bibwele, ngomba ya Siona, mboka kitoko, bakozongisela yo bokonzi na yo ya kala, bakozongisa bokonzi ya Yelusalemi, mboka kitoko. »


Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.


Tokende ! Tokende ! Tobima noki na mokili ya nor, elobi Yawe, pamba te Ngai moko nde napanzaki bino na mokili mobimba, elobi Yawe.


Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango. »


Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi.


mpe batunaki : « Mokonzi ya Bayuda oyo abotami azali wapi ? Tomonaki monzoto na Ye kobima, yango wana toyei kogumbamela Ye. »


Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango.


Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.


Natanaele alobaki : — Moteyi, ozali solo Mwana na Nzambe ; ozali penza Mokonzi ya Isalaele.


Kasi babandaki koganga : — Boma ye ! Boma ye ! Baka ye na ekulusu ! Pilato alobaki na bango lisusu : — Nasengeli penza kobaka mokonzi na bino na ekulusu ? Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazongisaki : — Tozali kaka na Sezare lokola mokonzi, mokonzi mosusu azali te !


Azalaki na bana mibali tuku misato oyo bazalaki kotambola likolo ya ba-ane, mpe bazalaki na bamboka tuku misato kati na Galadi. Kino na mokolo ya lelo, babengaka yango « Bamboka ya Yairi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ