8 Nakobundela ndako na Ngai liboso ya mampinga ya basoda ya nguya ; monyokoli moko te akoya lisusu komonisa bato na Ngai pasi, pamba te Ngai moko nde nazali kokengela sik’oyo.
Tango Joziasi azalaki mokonzi, Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki na ebale Efrate mpo na kosunga mokonzi ya Asiri. Mokonzi Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela, kasi Neko abundisaki ye mpe abomaki ye, na Megido.
Wana Yeoyakimi azalaki mokonzi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akotaki na makasi kati na mokili ; mpe Yeoyakimi akomaki mosali na ye mibu misato. Kasi sima, abongolaki makanisi mpe atombokelaki Nabukodonozori.
Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.
Na mokolo wana, bakoyemba nzembo oyo kati na mokili ya Yuda : Tozali na engumba moko ya makasi ; Nzambe akomisi lobiko lokola mir mpe ebombamelo na yango.
Boye, Yawe akokela na likolo ya ngomba mobimba ya Siona mpe na likolo ya bato oyo basanganaka kuna : lipata na tango ya moyi, mpe kongenga ya moto na tango ya butu. Bongo na likolo na nyonso, nkembo na Yawe ekozipa bango.
Oh Siona, lamuka, lamuka ! Tika ete omikomisa lisusu makasi. Yelusalemi, engumba ya bule, lata bilamba na yo ya lokumu, pamba te ezala moto oyo bakata ngenga te to moto ya mbindo, akokota lisusu kati na yo te.
Kasi na mbala oyo, bokobima na kowela te mpe bokokende te lokola bato bazali kokima, pamba te Yawe akotambola liboso na bino mpe Nzambe ya Isalaele akozala Mokengeli na bino na sima.
Okolendisama kati na bosembo : minyoko ekozala mosika na yo, okobanga lisusu eloko moko te, mpe somo ekokende mosika na yo ; ekomeka kopusana lisusu pene na yo te.
Kati na mokili na yo, okoyoka lisusu te makelele ya mobulu to ya kopanza to ya kobebisama kati na etando na yo ; kasi okobenga bamir na yo ‹ Lobiko, › mpe bikuke na yo ‹ Masanzoli. ›
Bakozonga na koganga ya esengo na bangomba ya Siona ; bakosepela na bomengo ya Yawe : ble, vino ya sika mpe mafuta, bameme mpe bangombe. Bakokoma lokola elanga ya kitoko oyo basopela mayi, mpe bakozala lisusu na mawa te.
Na tina ya Ejipito : Tala maloba ya kosambisa mampinga ya Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alongaki pene ya ebale Efrate, na Karikemishi, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi :
Na mokolo wana, Yawe akobatela bavandi ya Yelusalemi mpo ete bato ya bolembu kati na bango bakoma makasi lokola Davidi, mpe libota ya Davidi ekoma lokola Nzambe, lokola Anjelu ya Yawe, oyo azali kotambola liboso na bango.
Nakolongola makila na minoko na bango, mpe bilei ya mbindo na minu na bango ; kasi ba-oyo bakotikala bakokoma bato ya Nzambe na biso mpe bakambi ya Yuda ; mpe bato ya engumba Ekroni bakokoma lokola bato ya Yebusi.
Namoni minyoko ya bato na Ngai kati na Ejipito. Nayoki kolela na bango mpe nakiti mpo na kokangola bango. Mpe yaka sik’oyo, nakotinda yo ete ozonga na Ejipito. »