Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 9:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bana makangu bakoya kovanda na engumba Asidodi, mpe nakosilisa lolendo ya bato ya Filisitia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 9:6
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

ezali na bato oyo bazwi kowuta na Nzambe bozwi, biloko ebele mpe lokumu mpo ete bazanga eloko moko te oyo mitema na bango ekoki kozala na yango posa ; kasi Ye moko Nzambe apimeli bango makoki ya kosepela na yango, pamba te moto mosusu nde azali kosepela na yango. Wana mpe ezali pamba, mpe ezali mabe oyo epesaka penza mawa.


Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azwaki mokano yango mpo na kosambwisa lolendo ya nkembo nyonso mpe kokitisa kino na se bato nyonso ya lokumu, oyo bazali na mabele.


Mawa na motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi mpe na fololo ekawuka, fololo oyo ezalaki kosala kitoko na yango, oyo ezalaki na moto ya lubwaku ya mabele kitoko, na engumba wana oyo balangwi masanga ya vino bazalaki kosalela lolendo !


Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na bato ya Filisitia liboso ete Faraon abundisa Gaza :


Nakoboma mokonzi ya bavandi ya Asidodi mpe oyo azali kokonza na Ashikeloni. Nakobalukela engumba Ekroni kino tango moto ya suka kati na bato ya Filisitia akokufa, » elobi Nkolo Yawe.


Wana nde lifuti oyo bakozwa mpo na lolendo na bango, pamba te bafingaki mpe batiolaki bato ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bakosundola engumba Gaza, bongo engumba Ashikeloni ekobebisama ; bakobengana bato ya engumba Asidodi na makasi mpe bakopikola engumba Ekroni.


Engumba Ashikeloni ekomona yango mpe ekokoma kolenga ; engumba Gaza ekokoma na somo makasi, ndenge moko mpe engumba Ekroni ; pamba te elikya na yango ekosila. Engumba Gaza ekozangela mokonzi na yango mpe engumba Asikaloni ekotikala lisusu na bato te.


Nakolongola makila na minoko na bango, mpe bilei ya mbindo na minu na bango ; kasi ba-oyo bakotikala bakokoma bato ya Nzambe na biso mpe bakambi ya Yuda ; mpe bato ya engumba Ekroni bakokoma lokola bato ya Yebusi.


Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ