Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 9:3 - Mokanda na Bomoi

3 Engumba Tiri emitongeli yango moko ndako makasi, emibombeli palata ebele lokola putulu mpe wolo ebele lokola potopoto ya balabala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 9:3
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakendeki na ndako batonga makasi ya Tiri mpe na bingumba nyonso ya bato ya Evi mpe ya Kanana ; bongo bakomaki na sude ya etuka ya Yuda, na Beri-Sheba.


Bakopo nyonso ya mokonzi Salomo ezalaki ya wolo ya peto, mpe biloko nyonso ya ndako ya Zamba ya Libani ezalaki ya wolo ya peto. Eloko moko te ezalaki ya palata, pamba te, na tango oyo Salomo azalaki mokonzi, palata ezalaki na motuya ata te.


Mokonzi asalaki ete palata ekoma ebele na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku.


Bwaka wolo na yo kati na putulu, wolo na yo ya Ofiri kati na mabanga ya lubwaku ;


Ata soki asangisi palata lokola putulu mpe bilamba lokola mipiku ya mabele,


elongo na bakambi oyo bazalaki na wolo mpe batondisa palata kati na bandako na bango.


Yawe asembolaki loboko na Ye na ebale monene mpe alengisaki bikolo, apesaki mitindo na tina na mokili ya Fenisi ete babuka bandako na yango oyo batonga makasi ;


Nani azwaki mokano oyo mpo na kobebisa Tiri ? Tiri oyo azalaki kokabola mitole, oyo bato na ye ya mombongo bazalaki komimona lokola bakonzi ; mpe oyo bato na ye ya nkita bazalaki komimona lokola bato oyo baleki bato nyonso ya mokili na lokumu.


Bakobotola lokola bomengo ya bitumba bozwi mpe biloko na yo ya koteka, bakokweyisa bamir na yo, bakobuka bandako na yo ya kitoko mpe, na sima, bakobwaka nyonso na ebale : mabanga, mabaya mpe putulu na yo.


bomengo na yo, biloko na yo ya koteka, mombongo na yo, baluki nkayi na yo, bato na yo, oyo basalaka na masuwa, basali oyo babambaka madusu ya masuwa na yo, bato oyo basalaka mombongo elongo na yo mpe basoda na yo nyonso elongo na lisanga mobimba oyo ezali kati na masuwa, bakokufa na kati-kati ya bibale minene na mokolo oyo masuwa na yo ekozinda.


Tango biloko na yo ya koteka ezalaki kobima wuta na ebale monene, ozalaki kokokisa baposa ya bikolo ebele ; ebele ya bomengo mpe ya nkita na yo ezalaki kokomisa bakonzi ya mokili bazwi.


Kasi tango sik’oyo bambonge ya bibale minene ebuki-buki yo, ebwaki yo kati na mozindo ya mayi : biloko na yo mpe basali na yo nyonso bazindi elongo na yo.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Tiri, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakabaki bato ebele na bowumbu epai ya bato ya Edomi mpe batosaki te boyokani ya bondeko.


Mondelo yango ebalukaki na ngambo ya Rama mpe ekendeki kino na engumba ya Tiri, oyo batonga makasi, ebalukaki na ngambo ya Osa mpe na ngambo ya Ebale monene mpe esukaki na Ebale monene Mediterane, na etuka ya Akizibi,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ