« Kende na lombangu na Sarepita, kati na mokili ya Sidoni, mpe vanda kuna. Napesi mitindo kuna epai ya mwasi moko oyo akufisa mobali ete apesa yo bilei. »
Faraon Neko atiaki ye na boloko mpe akangaki ye minyololo, na Ribila, kati na mokili ya Amati, mpo ete akonza lisusu te na Yelusalemi. Faraon Neko afutisaki na makasi mokili ya Yuda mpako ya nkoto misato nkama minei ya bakilo ya palata mpe bakilo tuku misato na minei ya wolo.
Na tina ya Damasi : « Amati mpe Aripadi batondisami na soni, pamba te bayoki sango ya mabe. Mitema na bango ekomi likolo-likolo mpe bakomi komitungisa lokola ebale oyo etomboki.
« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na mokonzi ya Tiri ! Loba na ye : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ozalaki ndakisa mpo na komona nyonso oyo ezali ya kokoka, otondaki na bwanya, mpe ozalaki kitoko koleka.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Damasi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakataki-kataki bato ya Galadi na nzela ya bibende oyo etimolaka mabele mpo na kosala bilanga.
Mpo na yango, Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Oh libota ya Isalaele, nakobimisa ekolo moko oyo ekobundisa mpe ekonyokola yo tango nyonso wuta na Lebo-Amati kino na lubwaku ya Araba. »
Bato ya Isalaele oyo bazalaki na bowumbu bakozwa mokili ya bato ya Kanana kino na Sarepita ; bongo bato ya Yelusalemi oyo bazalaki na bowumbu na Sefaradi bakozwa bingumba ya Negevi.