Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 9:10 - Mokanda na Bomoi

10 Nakolongola bashar ya bitumba na mokili ya Efrayimi, bampunda ya bitumba, na engumba Yelusalemi, mpe matolotolo ya bitumba ekobukana. Mokonzi yango akosakola kimia na bikolo nyonso, bokonzi na ye ekobanda longwa na ebale monene moko kino na mosusu, longwa na ebale kino na basuka ya mabele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 9:10
33 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete kombo na ye ewumela libela na libela, ewumela tango nyonso moyi ekozala, mpo ete bato bakoma kotangaka kombo na ye wana bakobanda kopambolanaka, mpe bikolo nyonso ekoma kobengaka ye : moto ya esengo.


Bangomba milayi ekomemela bato kimia ; mpe bangomba mike, bosembo.


Yawe, talisa biso bolingo na Yo, mpe pesa biso lobiko na Yo !


Nakotia ebale monene na se ya loboko na ye, mpe bibale, na se ya loboko na ye ya mobali.


Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango ; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo.


Akozala Mosambisi kati na bikolo, akokata makambo ya kowelana kati na bato ebele. Bakotumba mipanga na bango na moto mpo na kosala bakongo, mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga mpo na kobundisa ekolo mosusu ; bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.


Ye, Yawe, alobi : « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »


Pamba te ekolo to mboka oyo ekosalela yo te ekobebisama ; solo, ekobebisama nye.


Kasi nakotalisa bolamu na Ngai epai ya libota ya Yuda mpe nakobikisa bango. Ngai moko Yawe, Nzambe na bango, nde nakosala bongo ; ekozala na nguya ya tolotolo te, ya mopanga te, ya bitumba te, ya bampunda te to mpe ya bashar te.


Na mokolo wana, elobi Yawe, okobenga ngai : « Mobali na ngai ya libala ; » okobenga ngai lisusu te : « Nkolo na ngai. »


Na mokolo wana, nakosala boyokani mpo na bango elongo na banyama ya zamba, bandeke ya likolo, mpe bikelamu oyo etambolaka na libumu. Nakobuka tolotolo mpe mopanga, mpe nakosilisa bitumba : nyonso wana ekosila na mokili mpo ete bato nyonso bavanda na kimia.


Mpo na yo, ndako molayi ya bakengeli bibwele, ngomba ya Siona, mboka kitoko, bakozongisela yo bokonzi na yo ya kala, bakozongisa bokonzi ya Yelusalemi, mboka kitoko. »


Boye, akozala kimia na bango ! Tango mampinga ya Asiri bakokota na makasi kati na mokili na biso mpe na bandako na biso, oyo batonga makasi, tokotindela bango babateli sambo ya bibwele mpe bakambi mwambe ya bato mpo na kobundisa bango.


« Na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakobebisa bashar mpe bampunda ya mokili na yo,


nakobalola bakiti ya bokonzi, nakosilisa nguya ya bokonzi ya mikili ya bapagano, nakokweyisa bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ; bampunda ekokweya elongo na bato oyo batambolaka likolo na yango, bango na bango bakobomana na mopanga.


Atindaki Liloba na Ye epai ya bana ya Isalaele mpo na kosakola Sango Malamu ya kimia, na nzela ya Yesu-Klisto oyo azali Nkolo ya bato nyonso.


Makambo oyo nyonso ewutaka na Nzambe oyo azongisaki boyokani kati na biso mpe Ye moko na nzela ya Klisto mpe apesaki biso lotomo ya boyokanisi.


Yango wana, mpo na Klisto, tozali bantoma, lokola nde Nzambe azali kolendisa bato na nzela na biso : « Na Kombo ya Klisto, tozali kosenga na bino ete bozongisa boyokani na bino elongo na Nzambe.


Esika nyonso makolo na bino ekonyata, ekozala ya bino. Mokili na bino ekobanda wuta na esobe kino na Libani, wuta na Ebale Efrate kino na este ya Ebale monene.


Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ