Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 9:1 - Mokanda na Bomoi

1 Liloba na Yawe. Liloba na Yawe ekomi na mokili ya Adraki, ekowumela na engumba Damasi, pamba te miso ya bato mpe ya mabota nyonso ya Isalaele ezali kotalela Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 9:1
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na butu, Abrami akabolaki bato na ye mpo na kobundisa bango, abetaki bango mpe alandaki bango kino na Oba, na nor ya Damasi.


Oh Nzambe na biso, okosambisa bango te ? Pamba te tozali na makasi te ya kotelemela mampinga minene oyo ezali koya kobundisa biso, mpe toyebi te tosala nini ! Miso na biso ezali kotalela kaka Yo. »


Na bato nyonso oyo batalelaka Yo, opesaka bilei na tango oyo ekoki.


Natalelaka Yawe tango nyonso, pamba te kaka Ye nde akolongola makolo na ngai na motambo.


Maloba ya kosambisa Babiloni, oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, azwaki na emoniseli :


Yawe asemboli na pole loboko na Ye ya bule na miso ya bikolo nyonso ; mpe suka nyonso ya mokili ekomona Lobiko ya Nzambe na biso.


Oh Yawe, Makasi na ngai mpe Ndako na ngai batonga makasi, Ekimelo na ngai na tango ya pasi, bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba : « Batata na biso bazalaki kaka na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te.


mabongisi na Yo ezali minene mpe misala minene na Yo ezali ya kokamwa ; miso na Yo ezalaka ya kofungwama mpo na kotala banzela nyonso ya bato, mpo na kopesa na moto nyonso kolanda etamboli mpe misala na ye.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Tiri, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakabaki bato ebele na bowumbu epai ya bato ya Edomi mpe batosaki te boyokani ya bondeko.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Ndenge mobateli bibwele alongolaka na monoko ya nkosi makolo mibale to songe ya litoyi ya meme, ndenge wana nde bana ya Isalaele bakobikisama, ba-oyo bavandaka na Samari, na basonge mpe na basuka ya bambeto na bango. »


Lisakoli na tina na engumba Ninive. Buku ya emoniseli ya Naumi, moto ya engumba Elikoshi.


Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.


Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Liloba na Yawe. Liloba na Yawe epai ya Isalaele na nzela ya mosakoli Malashi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ