Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 8:7 - Mokanda na Bomoi

7 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakobikisa bato na Ngai, longwa na mokili ya este kino na mokili ya weste.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 8:7
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi soki bozongeli Ngai mpe botosi mibeko na Ngai, wana, ezala soki bato na bino bakenda mosika na bowumbu kino na suka ya mokili, nakosangisa bango wuta kuna mpe nakomema bango na esika oyo naponaki mpo na kovandisa Kombo na Ngai. ›


Longwa na este kino na weste, tika ete Kombo ya Yawe epambolama !


Yawe azali kotonga lisusu Yelusalemi epai wapi akosangisa bato ya Isalaele oyo bakenda na bowumbu.


Nzambe ya banzambe, Yawe alobi, abengi mokili wuta na epai moyi ebimaka kino na epai elalaka.


Tala, bakowuta penza mosika, ndambo moko na ngambo ya nor, ndambo mosusu na ngambo ya weste, mpe ndambo mosusu na etuka ya Sinimi. »


Longwa na ngambo ya weste, bato bakobanga Kombo ya Yawe ; mpe longwa na ngambo ya este, bato bakokumisa nkembo na Ye ; pamba te akoya lokola ebale oyo etomboki, oyo pema ya Yawe ekomema.


Tala, nakozongisa bango wuta na mokili ya nor mpe nakosangisa bango wuta na basuka ya mokili. Kati na bango, ekozala na bakufi miso mpe bakakatani, basi ya zemi mpe basi oyo bazali na pasi ya kobota ; bato ebele penza bakozonga.


Mpo na yango, loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosangisa bino wuta na bikolo, nakozongisa bino wuta na mikili epai wapi napanzaki bino mpe nakozongisela bino lisusu mokili ya Isalaele. ›


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo oyo nakopetola bino na masumu na bino nyonso, nakosala ete bato bazongela kovanda na bingumba na bino mpe batonga yango lisusu ;


« Nakolendisa libota ya Yuda mpe nakobikisa libota ya Jozefi, nakozongisa bango lisusu na mokili na bango, pamba te nakoyokela bango mawa ; bakozala lokola bato oyo nasundolaki te, pamba te nazali Yawe, Nzambe na bango, mpe nakoyanola bango.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Yawe, Nzambe na yo, akoyokela yo mawa : akozongisa bato na yo, oyo bakendeki na bowumbu mpe akosangisa bino lisusu wuta na bikolo nyonso epai wapi apanzaki bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ