Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 8:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Mibange ya mibali mpe ya basi bakotonda lisusu na babalabala ya Yelusalemi, moto na moto na nzete na ye na loboko mpo na kimobange.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 8:4
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe Yobo akufaki na kimobange makasi mpe atondaki na mikolo.


Okokita na kunda na kimobange makasi, ndenge batelemisaka maboke ya matiti na tango na yango.


soki moto oyo babeti atelemi mpe atamboli na nzete kino na libanda, bakokatela moto oyo abetaki ye etumbu te, kasi akofuta kaka mikolo oyo moto yango azalaki kosala te mpe akosalisa ye kino akobika.


Bilenge basi bakobina na esengo elongo na bilenge mibali mpe mibange. Nakobongola matanga na bango na esengo, nakopesa bango kobondisama mpe esengo na esika ya mawa.


Bato bakokoma kovanda elongo kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba na yango nyonso : basali bilanga mpe babokoli bibwele.


Natunaki : — Bato oyo bayei kosala nini ? Azongisaki : — Ezali maseke oyo eyaki kopanza Yuda mpo ete moto moko te akoka kotombola moto, kasi bato oyo ya misala ya maboko bayei nde kolengisa bango mpe kokweyisa nguya ya bikolo oyo etombolaki maseke na yango mpo na kobundisa Yuda mpe kopanza bato na yango.


Kasi, bopusani nde pene ya ngomba Siona, pene ya Yelusalemi ya Likolo, engumba ya Nzambe na bomoi ; pene ya bankoto na bankoto ya ba-anjelu oyo basangani mpo na kosepela,


Mpe na mikolo oyo ezali koya, nakokomisa mikolo na yo mpe ya libota na yo mikuse, mpe mobange akotikala kozala lisusu te kati na molongo ya libota na yo.


Atako bakosalela Isalaele bolamu, kasi yo okomona pasi kati na Ndako na Ngai ; mpe mobange akotikala kozala lisusu te kati na molongo ya libota na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ