Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 8:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Siona, mpo ete nalingaka yango makasi na motema na Ngai. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 8:2
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Molimo na Nzambe akitelaki Amasayi, mokonzi ya lisanga ya basoda tuku misato, mpe alobaki : « Oh Davidi, tozali ya yo ! Tozali elongo na yo, oh mwana mobali ya Izayi ! Tika ete kimia ezala na yo, ezala na yo penza ; tika ete kimia ezala na moto oyo azali kosunga yo, pamba te Nzambe na yo azali kosunga yo. » Boye Davidi ayambaki bango mpe akomisaki bango bakonzi ya mampinga na ye.


Alati bosembo lokola ebombelo ya tolo, mpe ekoti ya lobiko na moto na Ye ; alati kozongisa mabe na mabe lokola nzambala, mpe amizipi zuwa lokola kazaka.


Tala wuta na likolo mpe mona wuta na ndako na Yo ya bule mpe ya nkembo : Wapi bolingo na Yo, oyo eleka ndelo mpe nguya na Yo ? Bolingo mpe mawa na Yo mpo na biso esili ?


Yawe akotonda na zuwa mpo na mokili na Ye mpe akoyokela bato na Ye mawa.


Yawe azali Nzambe oyo atonda na zuwa, oyo azongisaka mabe na mabe. Yawe azongisaka mabe na mabe mpe atombokaka makasi. Yawe azongisaka mabe na mabe epai ya banguna na Ye, akangelaka bayini na Ye kanda makasi.


Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki ? Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli ? Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.


Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ