Okosalela mbongo yango mpo na kosomba eloko nyonso oyo olingi : ngombe, meme, ntaba, vino to masanga nyonso oyo elangwisaka to eloko nyonso oyo olingi. Bongo yo elongo na ndako na yo mobimba, bokoki kolia yango na esika wana, liboso ya Yawe, Nzambe na yo, mpe okosepela elongo na libota na yo.