Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 7:14 - Mokanda na Bomoi

14 Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi : moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 7:14
35 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezalaki ndenge wana nde Liloba na Yawe ekokisamaki, liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi : « Mokili ekozwa bopemi na mikolo nyonso oyo bakosundola yango, ekosepela na basaba na yango kino tango mibu tuku sambo ekokoka. »


Tika ete balimwa lokola soyi ya mbembe, lokola mwana oyo akomona moyi te mpo ete abimi na zemi oyo esopani.


Ata bato ya bikolo bazali koganga lokola makelele ya mayi ya bibale minene, bakimaka penza mosika tango Yawe apamelaka bango ; bakimaka lokola matiti na bangomba na tango ya mopepe, lokola putulu na tango ya mopepe makasi.


Maloba na Yawe na tina na esobe ya ebale monene : Ndenge mopepe makasi elekaka na somo na Negevi, monguna moko azali koya wuta na esobe, wuta na mokili moko ya somo.


Ata basundolaki yo mpe bayinaki yo, mpe moto moko te azalaki lisusu koleka epai na yo, nakopesa yo lokumu mpo na tango nyonso mpe esengo ya libela na libela.


Tala, Yawe azali koya na moto, mpe bashar na Ye ezali lokola mopepe ya kayina ; akokitisa kanda na Ye na somo penza mpe akopamela na nzela ya moto.


Babateli ebele ya bibwele babebisi elanga na ngai ya vino, banyati-nyati elanga na ngai, babongoli elanga na ngai ya kitoko mabele ya kokawuka.


Tala, mopepe makasi ya Yawe etomboki ! Kanda na Ye epeli lokola moto, bakake ezali konguluma mpe kokweyela bato mabe.


Tala, mopepe ya Yawe etomboki, kanda makasi na Ye epeli, bakake ezali konguluma na likolo, mpe ezali kokweya na mito ya bato mabe.


Bakambi bayebisaki Baruki : — Yo mpe Jeremi, bokende kobombama. Mpe tika ete moto moko te ayeba esika bokozala.


Yango wana, kanda makasi na Ngai epelaki mpe ebebisaki bingumba ya Yuda mpe babalabala ya Yelusalemi ; mpe lisusu ebukaki-bukaki yango ndenge ezali komonana lelo.


Oh libota ya Isalaele, » elobi Yawe, « nakoyeisa ekolo moko wuta mosika mpo na kobundisa yo : ezali ekolo moko ya kala mpe ya nguya, ekolo oyo yo oyebi ata monoko na yango te.


bongo na mobu ya tuku mibale na misato ya bokonzi ya Nabukodonozori, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu Bayuda nkama sambo na tuku minei na mitano. Bango nyonso bazalaki bato nkoto minei na nkama motoba.


mpe loba na bato ya mokili oyo : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya bavandi ya Yelusalemi mpe ya mokili ya Isalaele : Bakolia bilei na bango na kobanga mpe bakomela mayi na bango na somo ; pamba te bakobotola na makasi biloko nyonso ya mokili na bango, likolo ya mabe nyonso ya bavandi na yango.


Nakopanza bino kati na bikolo, nakopalanganisa bino bipai na bipai kati na mokili mpe nakosukisa mbindo na bino.


Yango wana, kati na bino, batata bakolia bana na bango, mpe bana bakolia batata na bango. Nakopesa bino etumbu mpe nakopanza bipai nyonso bato na bino nyonso oyo bakotikala na bomoi.


Bongo, wuta na moko kati na maseke nyonso minei, liseke moko ya moke ebimaki. Ekolaki makasi, mpe nguya na yango ekomaki na ngambo ya sude, ya este mpe na ngambo ya Mokili oyo eleki kitoko.


Nzambe na ngai akobwaka bango, pamba te batosaki Ye te, mpe bakokoma koyengayenga kati na bikolo.


Liboso na bango, moto ezali kotumba ; sima na bango, moto ezali kozikisa. Liboso na bango, mokili ezali lokola elanga ya Edeni, mpe sima na bango, lokola esobe. Solo, ata eloko moko te ekotikala.


Nakotinda kati na mokili na bino banyama ya zamba oyo ekoboma bana na bino, ekolia bibwele na bino mpe ekosilisa koboma bino kino banzela na bino ezanga bato.


Nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya mpe nakobengana bino na mopanga ; mokili na bino ekozanga bato mpe bingumba na bino ekokawuka.


Nakotia moto na bamir ya engumba ya Raba, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi, kati na koganga na mokolo ya bitumba, kati na mopepe makasi na mokolo ya ekumbaki.


Yawe asilikaka noki te, mpe nguya na Ye ezali monene. Yawe atikaka te moto oyo asali mabe lokola nde asali na ye mabe te, kasi apesaka etumbu na moto oyo asali mabe. Yawe apasolaka nzela na Ye kati na ekumbaki, kati na mopepe makasi.


Otobolaki ye moto na nzela ya likonga na ye moko, tango basoda na ye bazalaki koya na elulu lokola mopepe mpo na kopanza biso. Bazalaki kosepela na elikya ete bakoboma biso na nkuku.


Nabomi bato ya bikolo mosusu, bandako na bango ya makasi ebebisami. Nasali ete babalabala na bango etikala lisusu na bato te mpo ete moto moko te alekela lisusu wana. Bingumba na bango ebebisami, ata moto moko te atikali lisusu kuna.


Natunaki ye : — Ozali kokende wapi ? Azongiselaki ngai : — Nazali kokende komeka molayi ya Yelusalemi mpo na koyeba mokuse mpe molayi na yango.


Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai :


Yawe akomimonisa epai na bango, mpe tolotolo na Ye ekobima lokola mokalikali. Nkolo Yawe akobeta kelelo mpe akotambola kati na mopepe makasi.


Bato oyo boyebi te bakolia bambuma ya mabele na bino mpe ya misala na bino nyonso.


Yawe akotindela bino na mosika, wuta na suka ya mokili, ekolo moko oyo ezali lokola mpongo oyo ezali kopumbwa, ekolo oyo bokososola monoko na yango te ; ekobundisa bino.


Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te.


Yawe akopanza bino kati na bato. Kasi ndambo kaka ya bato kati na bino nde bakowumela kati na bikolo epai wapi Yawe akomema bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ