Zakari 7:13 - Mokanda na Bomoi13 Boye, Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki : « Lokola bayokaki Ngai te tango nazalaki kobenga bango, Ngai mpe nayokaki bango te tango babengaki Ngai. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mpo na nini moto azalaki te tango nayaki ? Mpo na nini moto apesaki eyano te tango nabengaki ? Loboko na Ngai ezalaki mokuse mpo na kosikola bino ? Nazangaki solo makasi mpo na kokangola bino ? Na pamela na Ngai, nakawusaka ebale monene, nakomisaka bibale esobe ; mbisi na yango ekomaka kolumba solo mpo ete mayi ezali te mpe ekufaka na posa ya mayi.