Zakari 7:11 - Mokanda na Bomoi11 Kasi baboyaki kotosa, bamatisaki mapeka mpe bakangaki matoyi na bango mpo ete bayoka Ngai te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Baboyaki koyoka mpe kokanisa bikamwa oyo osalaki mpo na bolamu na bango. Bakomaki mito makasi mpe, na botomboki na bango, bamiponelaki mokonzi mpo na kozonga na bowumbu na bango. Kasi lokola ozali Nzambe oyo alimbisaka bato, Nzambe oyo atalisaka ngolu mpe ayokaka mawa ; lokola osilikaka noki te mpe otonda na boboto, otikalaki kosundola bango ata moke te,
Okebisaki bango mpo ete bazongela Mibeko na Yo ; kasi, na lolendo na bango, baboyaki kotosa mitindo na Yo. Basalaki masumu, babukaki mibeko na Yo, oyo nzokande esalaka ete moto oyo akotia yango na misala azala na bomoi. Kasi na lolendo mpe na botomboki na bango, bapesaki Yo mokongo, bakomaki mito makasi mpe baboyaki koyoka.
Nazalaki tango na tango kotindela bino basali na Ngai nyonso, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe mpe abongola bizaleli na ye ; bosalela banzambe mosusu te mpo ete bokoka kovanda kati na mokili oyo napesaki bino mpe batata na bino. › Kasi boyokaki Ngai te mpe botosaki Ngai te.