Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 6:6 - Mokanda na Bomoi

6 Shar oyo bampunda ya langi ya mwindo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya nor ; shar oyo bampunda ya langi ya pembe ezali kobenda ezali kolanda oyo ya liboso, mpe shar oyo bampunda ya madodo-madodo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya sude.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 6:6
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi : Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga, mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi, ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka, bantoma bazali komema bozwi na bango na mikongo ya ba-ane, bomengo na bango na mikongo ya bashamo, epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bango ata litomba moko te :


nakoloba epai ya nor : ‹ Pesa, › mpe epai ya sude : ‹ Kokanga te. › Zongisa bana na Ngai ya mibali wuta na mikili ya mosika, mpe bana na Ngai ya basi wuta na suka ya mabele,


nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.


Botombola bendele mpo na kokende na Siona ! Bobombama noki, pamba te nakoyeisa pasi wuta na nor mpe kobebisama ya somo ! »


Ezali mokolo ya Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mpo na kozongisela banguna na yo mabe. Mopanga ekoboma kino ekotonda, kino ekosilisa posa na yango ya makila ; pamba te ezali nde mbeka mpo na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, pene ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.


Bongo likolo, mabele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango ekoganga na esengo mpo na komona kobebisama ya Babiloni, pamba te babebisi bakobimela na nor mpo na kobundisa yango, » elobi Yawe.


« Bino bato ya Benjame, bokima mpo na lobiko na bino ! Bobima na Yelusalemi ! Bobeta kelelo na Tekoa ! Botombola bendele kati na Beti-Akeremi ! Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo ekobimela na nor.


Tango natalaki, namonaki mopepe moko ya makasi kowuta na ngambo ya nor ; bongo mopepe yango ezalaki komema mapata minene nzela moko na mikalikali ya kongenga makasi, mpe kati na yango ezalaki kongenga lokola ebende kati na moto.


Na tango ya suka, mokonzi ya sude akobundisa mokonzi ya nor, kasi mokonzi ya nor akobimela ye elongo na bashar, bampunda mpe bamasuwa ya bitumba. Akokota na makasi na bikolo ebele mpe akomema lokola mpela eloko nyonso oyo akomona na nzela.


Mokonzi ya nor akokota na makasi kati na mokili ya mokonzi ya sude, kasi akozonga na mokili na ye.


Tango Mpate abukaki ekangelo ya misato, nayokaki ekelamu ya bomoi ya misato koloba : « Yaka ! » Mpe namonaki liboso na ngai mpunda moko ya mwindo. Motambolisi na yango asimbaki na loboko na ye emekelo kilo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ