Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 6:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bampunda ya langi ya pembe ezalaki kobenda shar oyo ya misato, bampunda ya madodo-madodo ezalaki kobenda shar oyo ya minei. Bampunda nyonso ya madodo-madodo ezalaki makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 6:3
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo, na tango oyo bibwele esengelaki kosangisa nzoto, namonaki na ndoto ete bantaba ya mibali, oyo ezalaki kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezalaki ya madodo-madodo, ya banzela-nzela ya mwindo mpe ya banzela-nzela ya pembe.


makolo na yango ezalaki ya ebende, matambe na yango ezalaki, ndambo moko ya ebende, mpe ndambo mosusu, ya mabele oyo basalelaka bikeko.


Na butu, nazwaki emoniseli moko : namonaki liboso na ngai moto moko azali kotambolisa mpunda moko ya langi ya motane ; moto yango atelemaki kati na banzete ya mirite oyo ezalaki kati na lubwaku. Na sima na ye, ezalaki na bampunda mosusu ya langi ya motane, ya shokola mpe ya pembe.


Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali : « Sembo mpe Solo. » Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo.


Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.


Natalaki mpe namonaki liboso na ngai mpunda moko ya pembe. Motambolisi na yango asimbaki tolotolo. Bapesaki ye motole, bongo abimaki lokola molongi mpe mpo ete azala molongi.


Namonaki liboso na ngai mpunda moko ya langi ya mayi ya pondu ; kombo ya motambolisi na yango ezalaki « Kufa, » mpe mboka ya bakufi ezalaki kolanda motambolisi yango na sima. Bapesamelaki nguya ya koboma bato na nzela ya mopanga, ya nzala, ya bokono mpe ya banyama mabe, na etando ya eteni moko kati na biteni minei ya mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ