Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 5:4 - Mokanda na Bomoi

4 Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 5:4
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndako na ye etikalaka na eloko moko te, mpe fofolo ezalaka ya kopanzana kati na ndako yango.


Molili makasi ezali kozela libula na ye, moto makasi oyo moto apelisi te ekozikisa ye elongo na biloko oyo ekotikala kati na ndako na ye.


Ata batieli ndako na bango motema, esimbaka te ; Ezala bakangami na yango, esimbaka kaka te.


Banguna na yo bakotondisama na soni, mpe bandako ya bato mabe ekozala lisusu te. »


Yawe alakelaka mabe ndako ya moto mabe, kasi apambolaka ndako ya moto ya sembo ;


Mpo na yango, bilakeli mabe ezali kozikisa mokili ; bato na yango bakomema mokumba ya mabe na bango. Yango wana, bato ya mokili bazali kokufa, mpe ndambo moke kaka nde etikali.


Ndenge basambwisaka moyibi soki bakangi ye, ndenge wana mpe ekosalema mpo na libota ya Isalaele : bakonzi mpe bakambi na bango, Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango bakosambwa.


etikali kaka kolakelana mabe, lokuta, makambo ya somo, moyibi, kindumba, mobulu mpe kobomana se kobomana.


Mpo na yango, mokili ekokoma na mawa, bavandi na yango nyonso bakolemba nzoto, nyama ya zamba, ndeke ya likolo mpe mbisi ya ebale monene ekokufa.


Bato na Ngai bayebi lisusu te kosala makambo na bosembo, › elobi Yawe, ‹ batondisi bandako na bango na bomengo ya bitumba mpe na biloko oyo babotoli na makasi. › »


Alobaki na ngai : — Ezali nde bilakeli mabe oyo ezali kopanzana na mokili mobimba ; pamba te, kolanda ndenge ekomama na ngambo moko, bakobengana miyibi nyonso ; mpe kolanda ndenge ekomama na ngambo mosusu, bakobengana bato nyonso oyo balapaka ndayi ya lokuta.


bosalaka mabongisi ya komonisa baninga na bino pasi te, bolingaka te kolapa ndayi ya lokuta ; pamba te makambo wana nyonso, nayina yango makasi, » elobi Yawe.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bokolakelama mabe kati na engumba mpe bokolakelama mabe kati na bilanga.


Kokotisa te mpe kolinga te eloko ya mbindo kati na ndako na yo. Okotia yango pembeni mpo na kobebisa yango nyonso. Zwa yango lokola eloko ya nkele mpe ya mbindo, pamba te etiami pembeni mpo na kobebisama.


Kasi tala ndenge nini tokoki kosala bango : Tokotika bango kobika mpo ete kanda na Nzambe ekitela biso te, pamba te tolapaki ndayi na tina na bango. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ