Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 4:9 - Mokanda na Bomoi

9 — Ezali maboko ya Zorobabeli nde etongaki miboko ya Tempelo oyo ; ezali mpe kaka maboko yango nde ekosilisa mosala ya kotonga yango. Boye bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 4:9
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali bongo nde Sheshibatsari ayaki awa na Yelusalemi mpo na kotonga miboko ya Ndako ya Nzambe. Wuta mokolo wana kino na mokolo ya lelo, Tempelo ezali kotongama, kasi misala esili nanu te. ›


Bopusana pene na Ngai mpe boyoka likambo oyo : « Wuta na ebandeli, nalobaka na nkuku te ; wuta tango makambo oyo esalema, nazali wana. » Mpe sik’oyo, Nkolo Yawe atindi Ngai elongo na Molimo na Ye.


« Kobanda lelo, mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, botala malamu miboko ya Tempelo ya Yawe, oyo batiaki ; botala malamu penza makambo oyo ekoleka.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakozonga na Yelusalemi mpo na koyokela bango mawa ; mpe kuna, bakotonga lisusu Tempelo na Ngai mpe bakosalela kati na Yelusalemi singa oyo bamekelaka molayi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Siona, tokende ! Bima noki, yo oyo ovandaka na Babiloni, mboka kitoko !


Solo, nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpo ete bawumbu na bango babotola bango biloko na makasi. Na bongo nde bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai.


Bato oyo bakowuta mosika penza bakoya mpo na kosunga misala ya kotonga Tempelo ya Yawe, bongo bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino. Makambo oyo ekokokisama solo soki boluki kotosa Yawe, Nzambe na bino.


Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.


mpo ete bango nyonso bazala moko ndenge Yo Tata ozali kati na Ngai, mpe Ngai kati na Yo ; ete bango mpe bazala moko kati na biso, mpe ete mokili endima ete ezali Yo nde otindaki Ngai.


Nzambe atindaki Mwana na Ye kati na mokili mpo ete akatela yango etumbu te, kasi mpo ete abikisa yango.


Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ