Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 4:7 - Mokanda na Bomoi

7 Ozali nani, ngomba monene ? Okokoma etando liboso ya Zorobabeli. Akobimisa libanga monene kati na yo, wana bato bakozala koganga na esengo : « Tika ete Nzambe apambola yango ! Tika ete Nzambe apambola yango ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 4:7
38 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango batongi ndako basilisaki kotonga miboko ya Tempelo ya Yawe, Banganga-Nzambe kati na bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe elongo na bakelelo na bango na maboko ; Balevi, bakitani ya Azafi, elongo na manzanza, batelemaki na bisika na bango mpo na kokumisa Yawe, kolanda mitindo ya Davidi, mokonzi ya Isalaele.


bangomba epumbwaki lokola bameme, bangomba mike epumbwaki lokola bana ya ntaba.


Bino bangomba, mpo nini bopumbwaki lokola bameme ? Bongo bino bangomba mike, mpo na nini bopumbwaki lokola bana ya ntaba ?


Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba.


Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala, nasili kotia libanga moko kati na Siona, libanga ya makasi, libanga ya songe ya ndako, libanga ya motuya mpo na moboko ya malonga ; moto oyo akozwa yango lokola eyekamelo na ye akotikala kobanga te.


« Tala, nakomisi yo lokola libaya ya sika ya kotutela ble, oyo batia minu bapelisa makasi, lokola mbeli ya sika, mbeli ya minu makasi ; okopanza bangomba milayi, okokomisa yango putulu ; okokomisa bangomba ya mikuse lokola matiti ya kokawuka,


ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba : ‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’ Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe.


« Yo ngomba oyo obebisaka, yo oyo obebisaka mokili, nakotelemela yo, » elobi Yawe, « nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo, nakokitisa yo wuta na likolo ya mabanga, mpe nakokomisa yo ngomba ezika na moto.


Na se ya matambe na Ye, bangomba ezali kopasuka, mabwaku ezali kopanzana ndenge mafuta eyandukaka na moto, ndenge mayi ya mvula etiolaka na lombangu na mipanzi ya bangomba.


Na mikolo oyo ekoya, ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, mpe bikolo ekokende kotondana kuna.


Tango atelemaki, mabele ekomaki koningana makasi ; tango abalolaki elongi na Ye mpo na kotala, bato ya bikolo bakomaki kolenga, bangomba milayi oyo ya kala-kala ebukanaki, mpe bangomba mikuse oyo ya kala-kala ekitaki ; kasi banzela na Ye ewumelaka seko na seko.


— Ezali maboko ya Zorobabeli nde etongaki miboko ya Tempelo oyo ; ezali mpe kaka maboko yango nde ekosilisa mosala ya kotonga yango. Boye bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.


Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo.


Yesu alobaki na bango : — Nanu botanga te kati na Makomi : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba ? Nkolo asalaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso. »


Nanu botanga Makomi oyo te : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba ?


Kasi Yesu atalaki bango mpe alobaki : — Bongo makambo oyo ekomama elakisi nini : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako ? »


Mabwaku nyonso ekotondisama, bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse ekokitisama, babalabala oyo ezali nyoka-nyoka ekosembolama, banzela ya mabulu-mabulu ekobongisama,


Ye nde azali « libanga oyo bino, batongi ndako, bobwakaki, kasi ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba. »


Nzokande, lokola koponama yango esalemaki na ngolu, elakisi ete ezali likambo ya misala te ; soki te, ngolu ezali lisusu ngolu te.


Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba.


Boye lokumu ezali mpo na bino oyo bondimaka ; kasi mpo na bato oyo bandimaka te, « libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga oyo esimbi ndako, libanga ya songe ya ndako,


Bisanga nyonso ekimaki, mpe bangomba emonanaki lisusu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ