5 Azongiselaki ngai : — Boni, oyebi te soki elingi kolakisa nini ? Nazongiselaki ye : — Te, nkolo na ngai !
Jozefi azongiselaki Faraon : — Ngai nakolonga te kosala yango, kasi Nzambe akopesa na Faraon eyano oyo azali na yango posa.
Solo, boyebi oyo ya kokamwa elekelaka ngai, ezali likolo makasi, nakoki kososola yango te.
Bongo soki alakisi mabombami yango epai na ngai, ezali te mpo ete naleki bato nyonso na bwanya, kasi ezali mpo ete mokonzi ayeba ndimbola ya ndoto na ye mpe makambo oyo ezali kotungisa motema na ye.
Natunaki : — Nkolo na ngai, bampunda oyo elingi kolakisa nini ? Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongisaki : — Nakolakisa yo tina na yango.
Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongaki mpe alamusaki ngai ndenge balamusaka moto oyo alali pongi.
Azongiselaki ngai : — Boni, oyebi te soki elakisi nini ? Nazongisaki : — Te, nkolo na ngai.
Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai : — Nyonso oyo elakisi nini, nkolo na ngai ?
Bongo Yesu alobaki na bango : — Boni, bososoli lisese oyo te ? Ndenge nini bokososola masese mosusu ?