Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 4:10 - Mokanda na Bomoi

10 Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 4:10
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te Yawe atalaka mokili mobimba mpo na kosunga bato oyo mitema na bango emipesa mobimba epai na Ye. Nzokande, na likambo oyo, osali lokola moto oyo azangi mayele. Mpo na yango, kobanda lelo, okozalaka na bitumba tango nyonso.


Bozwi na yo ya kala ekomonana moke, pamba te bozwi oyo ekoya na sima ekozala monene koleka.


Wuta na evandelo na Ye, atalaka bavandi nyonso ya mokili.


Miso na Yawe ezalaka bisika nyonso mpo na kotala bato mabe mpe bato ya malamu.


Nzokande, nzela ya bato ya sembo ezali lokola pole ya tongo makasi, oyo kongenga na yango eyaka malembe-malembe kino tango moyi ekobima makasi.


Pamba te bokomela miliki mpe bokotonda mabele na ye, oyo ebondisaka ; bokomela penza ndenge esengeli mpe bokozwa esengo kati na bomengo na ye. »


Tango bokomona yango, mitema na bino ekosepela mpe mikuwa na bino ekozwa makasi ya sika lokola matiti ya mobesu ; loboko na Yawe ekoyebana kati na bawumbu na Ye mpe kanda na Ye ekokitela banguna na Ye.


Nazali kotala malamu banzela na bango nyonso ; moto moko te akoki kobombama na miso na Ngai, mpe masumu na bango ekoki ata moke te kobombama na miso na Ngai.


Bikelamu yango ezalaki kokende mpe kozonga lokola mikalikali.


Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye ; ndenge tongo etanaka solo, ndenge wana mpe akomonana : akoya epai na biso lokola mvula, lokola mvula oyo enokaka na pwasa mpe epolisaka mabele.


Tango mabanki yango esilisaki kolia matiti nyonso ya mokili, nagangaki : — Oh Nkolo Yawe, limbisa bato na Yo ! Ndenge nini Jakobi oyo azali penza moke akoki solo kobika ?


Boye, nagangaki : — Oh Nkolo Yawe, nabondeli Yo, kosala boye te ! Ndenge nini Jakobi oyo azali penza moke akoki solo kobika ?


‹ Kati na bino oyo bozali na bomoi, nani amonaki Ndako oyo kati na nkembo na yango ya liboso ? Bongo sik’oyo, bozali komona yango ndenge nini ? Boni, ezali te komonana na miso na bino lokola eloko ya pamba ?


Tala, natie libanga liboso ya Jozue. Libanga yango ezali na miso sambo, nakokoma makomi na likolo na yango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpe nakolongola masumu ya mokili oyo na mokolo moko.


Liloba na Yawe. Liloba na Yawe ekomi na mokili ya Adraki, ekowumela na engumba Damasi, pamba te miso ya bato mpe ya mabota nyonso ya Isalaele ezali kotalela Yawe.


Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »


Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye ; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba.


Bongo namonaki ba-anjelu sambo oyo batelemaka liboso ya Nzambe, mpe bapesaki bango bakelelo sambo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ