Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 3:9 - Mokanda na Bomoi

9 Tala, natie libanga liboso ya Jozue. Libanga yango ezali na miso sambo, nakokoma makomi na likolo na yango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpe nakolongola masumu ya mokili oyo na mokolo moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 3:9
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi, nkolo na ngai, miso ya bato nyonso ya Isalaele ezali kotalela yo mpo na koyeba soki nani akovanda na kiti ya bokonzi sima na mokonzi, nkolo na ngai.


Pamba te Yawe atalaka mokili mobimba mpo na kosunga bato oyo mitema na bango emipesa mobimba epai na Ye. Nzokande, na likambo oyo, osali lokola moto oyo azangi mayele. Mpo na yango, kobanda lelo, okozalaka na bitumba tango nyonso.


ndenge este ezali mosika ya weste, ndenge wana mpe abwakaka masumu na biso mosika na biso.


Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba.


Okokoma bakombo ya bana mibali ya Isalaele na mabanga nyonso mibale ndenge bato basalaka bililingi na kashe na libanga ; mpe okozingela yango na wolo.


Mabanga yango ekozala zomi na mibale kolanda bakombo ya bana mibali ya Isalaele. Na likolo ya libanga moko na moko, bakokoma kombo ya moko kati na mabota zomi na mibale ; bakokoma yango ndenge basalaka bililingi na kashe.


Okosala na wolo ya peto medaye mpe okokoma na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe : abulisama mpo na Yawe.


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala, nasili kotia libanga moko kati na Siona, libanga ya makasi, libanga ya songe ya ndako, libanga ya motuya mpo na moboko ya malonga ; moto oyo akozwa yango lokola eyekamelo na ye akotikala kobanga te.


Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba : ‹ Yeba Yawe ! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »


Na tango wana, na mikolo wana, › elobi Yawe, ‹ bakoluka ngambo nini Isalaele amemi kasi bakomona yango te, masumu nini Yuda asali kasi bakomona yango te ; pamba te nakolimbisa batikali oyo nabikisi.


Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi.


Bongo Anjelu alobaki na ba-oyo bazalaki kotelema liboso na ye : — Bolongola ye bilamba wana ya salite ! Mpe alobaki na Jozue : — Tala, nalongoli masumu na yo mpe nakolatisa yo bilamba ya talo.


Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.


Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki : — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.


Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.


Ye nde azali « libanga oyo bino, batongi ndako, bobwakaki, kasi ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba. »


kolanda ndenge ekomama : « Tala, nazali kotia kati na Siona libanga oyo ebetisaka bato mabaku, libanga monene oyo ekweyisaka bato ; moto oyo akotiela yango motema akotikala koyokisama soni te. »


abetaki biso kashe na Ye lokola libula na Ye, mpe atiaki Molimo na Ye kati na mitema na biso lokola ndanga ya biloko oyo akopesa biso.


Bozali penza kolakisa ete bozali mokanda ya Klisto, bozali mbuma ya lotomo na biso, mpe ete bozali mokanda oyo ekomamaki na nzela ya mayi ya ekomeli te kasi na nzela ya Molimo ya Nzambe na bomoi, mokanda oyo ekomamaki na likolo ya bitando ya mabanga te kasi kati na mitema ya bato.


Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi ; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe : « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »


azali na posa te, lokola bakonzi mosusu ya Banganga-Nzambe, ya kotumbaka mbeka mokolo na mokolo mpo na masumu na Ye moko liboso, mpe, na sima, mpo na masumu ya bato, pamba te atumbaki mbeka yango mpo na masumu na bango mbala moko mpo na libela tango amikabaki Ye moko.


Amikabaki lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso ; mpo na masumu na biso kaka te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.


Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye ; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ