Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 3:8 - Mokanda na Bomoi

8 Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, yo elongo na bandeko na yo, Banganga-Nzambe oyo basalaka elongo na yo, bozali bilembo oyo etalisaka makambo oyo ekoya. Nakobimisa Mosali na Ngai ; bakobenga Ye : Moto ya nzete oyo ebimaka na mobimbi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 3:8
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazali likamwisi mpo na bato ebele ; ozali ebombamelo na ngai ya makasi.


Moto ya nzete ekobima na mobimbi ya Izayi ; wuta na misisa na ye, Etape moko ekobota mbuma.


Bongo Yawe alobaki : « Lokola mosali na Ngai, Ezayi, atamboli bolumbu mpe makolo ngulu mibu misato mpo na kozala elembo mpe ekamwiseli na miso ya Ejipito mpe ya Kushi,


Na mokolo wana, nkona ya Yawe ekokoma kitoko mpe nkembo, bongo mbuma ya mabele ekosala lokumu mpe nkembo, ya ndambo ya bana ya Isalaele oyo babiki.


Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,


alobaki na ngai : « Oh Isalaele, ozali mosali na ngai, nakomonisa nkembo na ngai na nzela na yo. »


Mpe sik’oyo, Yawe oyo asalaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai mpo ete nazala mosali na Ye, mpo na kozongisa Jakobi epai na Ye mpe kosangisa Isalaele pene na Ye, pamba te nazali na lokumu na miso ya Yawe mpe Nzambe na ngai azali makasi na ngai,


Tala, mosali na ngai akosala na bwanya, akotombolama, akomata likolo mpe akonetolama makasi penza.


Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.


Pamba te akolaki liboso na Ye lokola nzete ya moke, lokola mosisa oyo ebimi na esobe ; azalaki ata na kitoko to lokumu te oyo ekokaki kobenda miso na biso ete etala ye ; lolenge na ye ezalaki ata na eloko moko te oyo ekokaki kosala ete tosepela na ye.


Ngai elongo na bana oyo Yawe apesi ngai, tozali bilembo mpe bandakisa kati na Isalaele, kowuta na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na ngomba Siona.


« Na mikolo oyo ekoya, » elobi Yawe, « nakobimisa Moto ya nzete mpo na Davidi, mokonzi oyo akokamba na bwanya, oyo akosala kolanda bosembo mpe bosolo.


Na mikolo yango mpe na tango yango, nakobimisa Moto ya nzete ya sembo wuta na libota ya Davidi ; akosala makambo ya sembo mpe ya boyengebene kati na mokili.


Loba na bango : ‹ Nazali elembo mpo na bino. › Ndenge Ngai nasali, ndenge wana mpe ekosalema epai na bango : bakokende na bowumbu lokola bakangami.


Tia yango na mapeka na yo na miso na bango, mpe kende na yango na butu. Bomba elongi na yo mpo ete okoka komona mokili te, pamba te nalingi ete ozala elembo mpo na libota ya Isalaele. »


Ezekieli akozala lokola elembo mpo na bino : bokosala ndenge kaka ye asalaki. Tango makambo oyo ekosalema, bokososola ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. ›


Nakobotisela bango elanga moko oyo ekokende sango mpo na bambuma na yango ; moto moko te kati na mokili akokufa lisusu na nzala mpe bato ya bikolo mosusu bakotiola bango lisusu te.


Mosali na Ngai, Davidi, akozala mokonzi na bango, mpe bango nyonso bakozala na mobateli bibwele kaka moko, bakotosa mibeko na Ngai mpe bakobatela na bokebi mitindo na Ngai.


Okoyebisa ye maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Tala moto oyo kombo na ye ezali : Moto ya nzete. Nyonso ekobota esika ye azali, mpe ezali ye nde akotonga Tempelo ya Yawe.


mpo na mawa mpe boboto ya Nzambe na biso, oyo na nzela na yango moyi ya tongo ekongengela biso wuta na likolo,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ