Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 3:7 - Mokanda na Bomoi

7 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Soki otamboli na nzela na Ngai mpe obateli mitindo na Ngai, okokamba ndako na Ngai mpe okobatela lopango na Ngai, mpe nakotia yo na molongo ya ba-oyo batelemaka awa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 3:7
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakosala yango mpo ete Abrayami atosaki Ngai, abatelaki bikateli na Ngai, mitindo na Ngai mpe mibeko na Ngai.


Sala makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, alingaka : tambola na banzela na Ye, batela malako mpe bikateli na Ye, mibeko mpe mitindo na Ye, ndenge ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mpo ete olonga na makambo nyonso oyo okosala mpe na bisika nyonso oyo okokende ;


Mpe soki otamboli na banzela na Ngai, otosi malako mpe mitindo na Ngai ndenge tata na yo, Davidi, asalaki, nakopesa yo bomoi molayi.


Boye Balevi bazalaki kosala mosala na bango ya kokengela Ndako ya kapo ya Bokutani mpe Esika ya bule, mpe ya kosunga bandeko na bango ya mibali, bana ya Aron, na mosala ya Tempelo ya Yawe.


kasi bato oyo bakobuka ble bakolia yango mpe bakokumisa Yawe, mpe ba-oyo bakokamola vino bakomela yango kati na lopango ya Esika na Ngai ya bule. »


Na esika ete bomipesa na mosala ya biloko na Ngai ya bule, bino bozali nde kopesa mosala na Ngai epai ya bapaya, kati na Esika na Ngai ya bule.


Eteni yango ya mabele ekozala mpo na Banganga-Nzambe oyo babulisama, oyo bazali bakitani ya Tsadoki, mpo ete basalelaki Ngai na boyengebene mpe bapengwaki te na nzela na Ngai tango bana ya Isalaele bapengwaki ndenge mpe Balevi basalaki.


Moyize alobaki na Aron : « Tomoni kokokisama ya maloba oyo Yawe asakolaki tango alobaki : ‹ Bato nyonso oyo bakobelema liboso na Ngai basengeli kotosa bosantu na Ngai, mpe Ngai nakomonisa nkembo na Ngai na miso ya bato nyonso. › » Aron alobaki ata liloba moko te.


Bokovanda mikolo sambo, butu mpe moyi, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bokosala makambo oyo Yawe atindi mpo ete bokufa te. Pamba te, yango nde epesamelaki ngai lokola mitindo. »


Anjelu ya Yawe ayebisaki na Jozue maloba oyo :


Boye, alobaki : — Ezali nde bato mibale oyo bapakolami mafuta mpo na kosalela Nkolo ya mokili mobimba.


Bato oyo bakowuta mosika penza bakoya mpo na kosunga misala ya kotonga Tempelo ya Yawe, bongo bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino. Makambo oyo ekokokisama solo soki boluki kotosa Yawe, Nzambe na bino.


Azongiselaki ngai : — Ezali Molimo ya likolo oyo akokende na bangambo nyonso minei ya mokili mobimba. Atelemaki liboso ya Nkolo ya mokili mobimba mpe sik’oyo abimi.


Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.


mpo ete bokoka kolia mpe komela na mesa na Ngai kati na Bokonzi na Ngai, mpe ete bokoka kovanda na bakiti ya bokonzi mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.


Kati na ndako ya Tata na Ngai, bisika ezali mingi. Soki ezalaki bongo te, boni, nalingaki koyebisa bino ete nakeyi kuna mpo na kobongisela bino esika ?


Moto oyo akolonga, nakopesa ye makoki ya kovanda elongo na Ngai, na Kiti na Ngai ya Bokonzi, ndenge Ngai mpe, sima na Ngai kolonga, nakendeki kovanda elongo na Tata na Ngai, na Kiti na Ye ya Bokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ