Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 3:5 - Mokanda na Bomoi

5 Nalobaki : — Bolatisa ye kitendi ya peto oyo bakangaka na moto. Boye, bakangaki ye kitendi ya peto na moto mpe balatisaki ye bilamba mosusu wana Anjelu ya Yawe atelemaki pene na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 3:5
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazalaki kolata bosembo lokola elamba ; bosembo ezalaki elamba na ngai mpe kitendi na ngai ya kokanga na moto.


Okokanga ye kitendi na moto mpe okobakisa na likolo ya kitendi yango elembo ya libulisi.


bilamba oyo emonisaka nzoto, bilamba ya lino, maputa mpe bitambala.


Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.


Soki bakoti kuna, Banganga-Nzambe bakoki kobima te na biteni ya bule ya Tempelo mpo na kokende na lopango ya libanda, kasi basengeli kotika bilamba oyo bazalaki kosalela mosala ya bonganga-Nzambe kuna, pamba te bilamba yango ezali bule ; bakolata bilamba mosusu liboso ya kopusana na bisika oyo ebongisami mpo na bato. »


Anjelu ya Yawe ayebisaki na Jozue maloba oyo :


Kamata palata mpe wolo mpo ete osalela yango motole ; bongo okolatisa yango Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe.


bampaka tuku mibale na minei bazalaki kogumbama liboso ya Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi, kogumbamela Ye oyo azali na bomoi seko na seko mpe kokitisa mitole na bango liboso ya Kiti ya Bokonzi na koloba :


Zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki mpe na bakiti mosusu tuku mibale na minei ya bokonzi, mpe bampaka tuku mibale na minei bavandelaki yango. Bampaka yango balataki bilamba ya pembe, mpe bazalaki na mitole ya wolo na mito na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ