Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 3:2 - Mokanda na Bomoi

2 Yawe alobaki na Satana : — Satana, tika ete Yawe apamela yo ! Tika ete Yawe oyo apona Yelusalemi apamela yo ! Boni, moto oyo azali te lokola koni ya moto oyo balongoli na moto ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 3:2
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Wuta mokolo oyo nabimisaki bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito, naponaki engumba moko te kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo ete batonga kuna Tempelo epai wapi Kombo na Ngai ekozala, mpe naponaki moto mosusu te lokola mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele,


kasi naponaki nde Yelusalemi mpo ete Kombo na Ngai ezala kuna, mpe Davidi mpo ete akamba bato na Ngai, Isalaele ! »


Pamba te atelemaka na ngambo ya loboko ya mobali ya mobola mpo na kokangola ye wuta na maboko ya bato oyo bakatela ye etumbu.


loba na ye : ‹ Kitisa motema, zala na kimia, kobanga te ; tika ete motema na yo etungisama te mpo na bakoni mibale oyo ezali kopela : kanda makasi ya Retsini, moto ya Siri, mpe ya mwana mobali ya Remalia !


Na tango wana, Misheli, mokambi monene ya ba-anjelu, oyo abatelaka bato na yo akotelema. Ekozala tango ya pasi penza, pasi oyo etikala nanu kozala te wuta bikolo ezala na mokili kino na tango wana. Kasi na tango wana, bato ya ekolo na yo, oyo bakombo na bango ekomonana kati na buku, bakobika.


« Nabebisaki bino ndenge nabebisaki Sodome mpe Gomore ; bozalaki lokola koni ya moto oyo babimisi na moto. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


Tatola lisusu : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bingumba na Ngai ekotondisama lisusu na bomengo, Yawe akobondisa lisusu Siona mpe akopona Yelusalemi. › »


Pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo apesaki ngai mokumba ya kosakola mpo na kotelemela bikolo oyo ebotolaki bino biloko na makasi alobi : Moto nyonso oyo akosimba yo akosimba nde mbuma ya liso na Ngai.


Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo : — Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo.


Tango Yesu amonaki ebele ya bato koya mbangu, abenganaki molimo mabe : — Molimo mabe, yo oyo okomisaka moto baba, napesi yo mitindo : bima kati na mwana oyo mpe kozonga lisusu te kati na ye.


Kasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo.


Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo : — Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo ! Molimo mabe ebwakaki moto yango na mabele, liboso ya bato nyonso, ebimaki kati na ye mpe esalaki ye ata mabe moko te.


Wana mwana azalaki kopusana, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi. Kasi Yesu apesaki mitindo na molimo mabe yango ete ebima kati na mwana, abikisaki mwana na pasi na ye mpe azongisaki ye na maboko ya tata na ye.


Nazali koloba bongo te na tina na bino nyonso ; nayebi bato oyo napona. Kasi esengeli ete eteni oyo ya Makomi ekokisama : « Moto oyo azalaki kolia sani moko elongo na ngai abalukeli ngai ! »


Etikali moke, Nzambe ya kimia akonyata-nyata Satana na se ya matambe na bino. Tika ete ngolu ya Yesu, Nkolo na biso, ezala na bino !


Nani akofunda bato oyo Nzambe apona ? Ezali Nzambe nde akomisaka sembo.


Moto oyo amipesaka na masumu azali ya Satana, pamba te Satana asalaka masumu wuta na ebandeli. Nzokande Mwana na Nzambe ayaki penza mpo na kobebisa misala ya Satana.


mpo na bato mosusu, bobikisa bango na kobimisa bango na moto ; mpe mpo na bato mosusu lisusu, boyokela bango mpe mawa oyo esangana na bobangi, na koyina ezala ata bilamba na bango, oyo baposa na bango ya nzoto ekomisa mbindo.


Nzokande, ezala Misheli, mokonzi ya ba-anjelu, tango abendanaki na Satana na tina na nzoto ya Moyize, amekaki ata moke te kopesa Satana etumbu ya soni ; kasi alobaki kaka : « Tika ete Nkolo apesa yo etumbu ! »


Bakobundisa Mpate, kasi Mpate akolonga bango mpo ete azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Elongo na Ye, babengami, baponami mpe ba-oyo bazali sembo bakolonga mpe lokola. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ