Tango kaka babimisaki bango na libanda, moko kati na mibali yango alobaki : — Bokima mpo ete bobikisa bomoi na bino ! Botala sima te mpe botelema ata esika moko te kati na engumba oyo ! Bokima na likolo ya bangomba, noki te bokobebisama !
Kita mpe vanda na putulu, Babiloni, mboka kitoko ! Vanda na mabele, kiti ya bokonzi ezali te, Babiloni, mboka kitoko ! Moto moko te akobenga yo lisusu « mwasi bonzenga » to « mwasi kitoko. »
Bobima na Babiloni, bokima wuta na bato ya Babiloni ! Boloba yango na makelele ya esengo mpe botatola yango ; bopanza sango na yango kino na suka ya mokili ; boloba : ‹ Yawe asikoli Jakobi, mosali na Ye. › »
Oh Yelusalemi, milongola na putulu, telema mpe vanda na esika na yo ya lokumu ! Oh Siona, mboka kitoko, yo oyo ozali mokangami, kata minyololo na kingo na yo !
Bobima na Babiloni, bobikisa bomoi na bino ! Soki te, bokokufa likolo ya masumu na bango. Ezali tango oyo Yawe alingi kozongisela bango mabe na mabe mpe kofuta bango ndenge ezali misala na bango.
Oh Siona, mboka kitoko, lela lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ! Pamba te sik’oyo, okobima na engumba mpe okovanda kati na zamba, okokende kino na Babiloni ; mpe kuna, Yawe akokangola yo na maboko ya monguna na yo.
Akebisaki lisanga mobimba : « Bozala mosika ya bandako ya kapo ya bato oyo ya mabe. Bosimba ata eloko moko te ya bango, noki te bokokufa likolo ya masumu na bango ! »
Bongo nayokaki mongongo mosusu koloba wuta na likolo : « Bino bato na ngai, bobima longwa na Babiloni mpo ete bosangana te na masumu na yango, mpe mpo ete bozwa te bitumbu oyo ekokweyela yango.