Libanga na bango ya makasi ekolimwa na somo ; mpe bakambi na bango bakolenga na somo na komona bendele ya etumba, » elobi Yawe oyo moto na Ye ezali kati na Siona mpe fulu ya moto na Ye ezali kati na Yelusalemi.
Boye, Yawe akokela na likolo ya ngomba mobimba ya Siona mpe na likolo ya bato oyo basanganaka kuna : lipata na tango ya moyi, mpe kongenga ya moto na tango ya butu. Bongo na likolo na nyonso, nkembo na Yawe ekozipa bango.
Yango wana, mwana na moto, sakola ! Loba na Gogi : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo wana, tango bato na Ngai, Isalaele, bakovanda na kimia, boni, okoyeba yango te ?
Amekaki bangambo nyonso minei. Ezalaki na mir moko zingazinga na yango, oyo ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano na molayi mpe nkama mibale na tuku mitano na mokuse ; mir yango ezalaki kokabola eteni ya bule ya Tempelo mpe eteni ya Tempelo oyo ezali bule te.
Moto yango akendeki na ngambo ya este mpe asimbaki singa oyo bamekelaka molayi na loboko na ye ; amekaki molayi ya bametele pene nkama mitano, akatisaki ngai mayi, mpe mayi yango esukelaki ngai na bisika oyo matambe esukela.
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakozonga na Yelusalemi mpo na koyokela bango mawa ; mpe kuna, bakotonga lisusu Tempelo na Ngai mpe bakosalela kati na Yelusalemi singa oyo bamekelaka molayi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Nakobundela ndako na Ngai liboso ya mampinga ya basoda ya nguya ; monyokoli moko te akoya lisusu komonisa bato na Ngai pasi, pamba te Ngai moko nde nazali kokengela sik’oyo.
Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.