Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 2:4 - Mokanda na Bomoi

4 Natunaki : — Bato oyo bayei kosala nini ? Azongisaki : — Ezali maseke oyo eyaki kopanza Yuda mpo ete moto moko te akoka kotombola moto, kasi bato oyo ya misala ya maboko bayei nde kolengisa bango mpe kokweyisa nguya ya bikolo oyo etombolaki maseke na yango mpo na kobundisa Yuda mpe kopanza bato na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 2:4
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana Bayuda oyo bavandaka na bingumba ezanga bamir bakomisa mokolo ya zomi na minei ya sanza ya Adari, mokolo ya esengo mpe ya feti, mokolo oyo bakabelanaka bakado kati na bango.


Tala Siona, engumba ya bafeti na biso ya minene, miso na yo ekomona Yelusalemi, ndako ya kimia, ndako ya kapo oyo ekopikama makasi ; bakokoka kopikola makonzi na yango te, mpe basinga na yango ekokatana te.


Nakokisi maloba ya mosali na Ngai mpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai. Natatoli na tina na Yelusalemi : ‹ Bato bakovanda kati na yo ; › na tina na bingumba ya Yuda : ‹ Ekotongama lisusu, › mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana : ‹ Nakobongisa yango lisusu. ›


Okanisaki ete ozangaki bana, kasi okoyoka bango koloba na matoyi na yo : « Esika oyo ezali penza moke mpo na biso ; pesa biso esika oyo eleki monene mpo ete tokoka kovanda. »


Tala, ezali Ngai nde nakelaki monyangwisi bibende na moto oyo apelisaka moto makasi na makala mpe asalaka ebundeli mpo ete esala mosala na yango. Ezali mpe kaka Ngai nde nakelaki mobebisi mpo ete asala mosala ya kobebisa.


Nazongisaki : — Oh Nkolo Yawe, nayebi koloba te, pamba te nazali nanu elenge !


Bato bakokoma kovanda elongo kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba na yango nyonso : basali bilanga mpe babokoli bibwele.


« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakolona bato mpe banyama lokola milona kati na bokonzi ya Isalaele mpe kati na bokonzi ya Yuda.


Ndenge kaka bakoki kotanga te mampinga ya likolo mpe zelo ya bibale minene mpo na koyeba motango na yango, ndenge wana mpe nakokomisa ebele, bakitani ya Davidi, mosali na Ngai, mpe Balevi oyo basalelaka Ngai. › »


Okoloba : ‘ Nakobundisa mikili oyo ebatelama malamu te, nakokende kino epai ya bato oyo bavandaka na boboto kati na kimia, bavandaka kati na bingumba oyo ezanga bamir, ezanga bikangelo mpe bikuke ;


Nzambe apesaki bilenge wana minei boyebi mpe bososoli kati na makambo nyonso : koloba, kokoma, kotanga mikanda, mayele mpe bwanya. Mpe Daniele akomaki na makoki ya kolimbola bimoniseli mpe bandoto ya ndenge na ndenge.


bilenge mibali oyo banzoto na bango ezanga mbeba, ya bilongi kitoko, ya mayele mpe ya bwanya, oyo bazali na makoki ya koyekola kotanga mpe kokoma makambo ya ndenge na ndenge, oyo bazali na bososoli mpe bakoka mpo na kosala kati na ndako ya mokonzi ; Ashipenazi asengelaki kolakisa bango koloba, kokoma mikanda mpe kotanga lokota ya bato ya Babiloni.


Mokolo ya kotonga lisusu bamir na yo ekoya ; ezali mokolo wana nde bandelo ya mokili na yo ekopusama lisusu mosika.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakozonga na Yelusalemi mpo na koyokela bango mawa ; mpe kuna, bakotonga lisusu Tempelo na Ngai mpe bakosalela kati na Yelusalemi singa oyo bamekelaka molayi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Tatola lisusu : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bingumba na Ngai ekotondisama lisusu na bomengo, Yawe akobondisa lisusu Siona mpe akopona Yelusalemi. › »


Na mokolo wana, nakokomisa bakambi ya Yuda lokola moto kati na liboke ya bakoni, lokola koni ya moto na se ya liboke ya matiti ekawuka : bakozikisa bikolo nyonso ya zingazinga na bango, ezala oyo ezali na ngambo ya loboko na bango ya mobali to ya mwasi. Kasi Yelusalemi ekotikala kaka na esika na yango.


Tala etumbu oyo Yawe akopesa na bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi : Misuni ya banzoto na bango ekobanda kopola wana bazali nanu na bomoi ; miso na bango ekokufa na bilongi na bango mpe balolemo na bango ekokufa kati na minoko na bango.


Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola bolenge na yo, kasi zala ndakisa mpo na bandimi na nzela ya maloba, bizaleli, bolingo, kondima mpe bopeto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ