Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 2:13 - Mokanda na Bomoi

13 Solo, nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpo ete bawumbu na bango babotola bango biloko na makasi. Na bongo nde bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 2:13
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Banganga-Nzambe mpe Balevi batelemaki mpo na kopambola bato, mpe Nzambe ayokaki bango mpo ete losambo na bango ekomaki kino na Likolo, evandelo na Ye ya bule.


Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ; Yawe avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Lola. Azali kotala bato nyonso ; mpe miso na Ye ezali kososola mozindo ya mitema na bango.


Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili, akataka batolotolo, abukaka makonga mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba.


Boyembela Nzambe, boyemba banzembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye. Bofungola nzela mpo na Ye oyo atambolisaka mampinga na Ye kati na esobe. Kombo na Ye ezali Yawe. Botonda na esengo liboso na Ye.


Nkolo alamukaki lokola moto oyo awuti na pongi, lokola moto oyo abimi na kwiti ya vino ;


Bato ya bikolo bakozwa bango mpe bakomema bango kino na esika na bango. Bongo, libota ya Isalaele ekokamata bango na mokili ya Yawe lokola basali ya mibali mpe ya basi. Bakokomisa bakangami bato oyo bakangaki bango mpe bakokonza bato oyo bakonzaki bango.


Na mokolo wana, bato ya Ejipito bakokoma lokola basi. Bakolenga na somo na koningana ya loboko oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, atomboli mpo na kotelemela bango.


« Bino bisanga, bovanda kimia liboso na Ngai ! Tika ete bato ya bikolo bayeisa sika makasi na bango, tika ete bapusana mpe baloba : ‹ Tokende elongo mpo na kosamba ! ›


Oh loboko na Yawe, lamuka, lamuka ! Lata makasi ! Lamuka, lokola na mikolo ya kala, na bileko oyo eleka kala ! Ezali Yo te oyo okataki-kataki Raabi, oyo obomaki dalagona ?


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Bozali kopela na posa mabe na se ya banzete minene oyo babengaka terebente, na se ya banzete nyonso ya mibesu ; bozali kobonza bana na bino ya mibali lokola bambeka kati na lubwaku mpe kati na mabulu ya mabanga.


Tala wuta na likolo mpe mona wuta na ndako na Yo ya bule mpe ya nkembo : Wapi bolingo na Yo, oyo eleka ndelo mpe nguya na Yo ? Bolingo mpe mawa na Yo mpo na biso esili ?


Sakola maloba oyo nyonso mpo na kotelemela bango mpe loba na bango : ‹ Yawe azali koganga wuta na likolo, azali kotomboka lokola kake wuta na Esika na Ye ya bule, azali konguluma makasi mpo na kotelemela mokili na Ye ! Akoganga lokola bato oyo bakamolaka mbuma ya vino, akogangela bavandi nyonso ya mokili oyo !


Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ; tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye !


Bovanda kimia liboso ya Nkolo Yawe, pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene ! Yawe abongisi mbeka, abulisi babengami na Ye.


Yango wana, na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, « Moabi ekokoma penza lokola Sodome, mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore ; ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe, esika ya mabulu ya mungwa, esika ebebisama mpo na libela. Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi, mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwa mikili yango lokola libula. »


Yango wana, « bozela Ngai, » elobi Yawe, « bozela Ngai na mokolo oyo nakoya mpo na kosamba elongo na bino ; nazwaki mokano ya kosangisa bato ya bikolo nyonso mpe ya mikili nyonso mpo na kosopela bango kanda na Ngai, makasi nyonso penza ya kanda na Ngai : mokili mobimba ekozika na moto ya nguya ya kanda na Ngai.


— Ezali maboko ya Zorobabeli nde etongaki miboko ya Tempelo oyo ; ezali mpe kaka maboko yango nde ekosilisa mosala ya kotonga yango. Boye bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.


Bato oyo bakowuta mosika penza bakoya mpo na kosunga misala ya kotonga Tempelo ya Yawe, bongo bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino. Makambo oyo ekokokisama solo soki boluki kotosa Yawe, Nzambe na bino.


Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.


Oh moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe ? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : « Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo ? »


Tango mosusu bokoki komituna : ‹ Ndenge nini tokoki koyeba ete maloba oyo azali koloba ewuti solo epai na Yawe te ? ›


Soki makambo oyo mosakoli alobi na Kombo na Yawe ekokisami te to esalemi te, wana maloba yango ewutaki na Yawe te. Mosakoli wana alobaki kaka na ndenge na ye moko, bobanga ye te. »


Tala wuta likolo, esika na Yo ya bule epai wapi ovandaka, mpe pambola Isalaele, bato na Yo, mpe mokili oyo opesaki biso ndenge olakaki yango epai ya bakoko na biso na nzela ya ndayi, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ