Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 2:12 - Mokanda na Bomoi

12 Pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo apesaki ngai mokumba ya kosakola mpo na kotelemela bikolo oyo ebotolaki bino biloko na makasi alobi : Moto nyonso oyo akosimba yo akosimba nde mbuma ya liso na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 2:12
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kasi naponaki nde Yelusalemi mpo ete Kombo na Ngai ezala kuna, mpe Davidi mpo ete akamba bato na Ngai, Isalaele ! »


Amani ayebisaki mwasi na ye, Zereshi, mpe baninga na ye nyonso makambo oyo ekomelaki ye. Bapesi toli na ye mpe mwasi na ye, Zereshi, balobaki na ye : — Lokola kokweyisama na yo ebandi liboso ya Maridoshe oyo azali Moyuda, okokoka kolonga ye te ; solo penza, okokweyisama lisusu na se koleka !


« Bosimba bapakolami na Ngai te, bosala mabe te epai na basakoli na Ngai ! »


Pamba te Yawe aponaki Siona, asepelaki kokomisa yango Esika na Ye ya kovanda :


« Ezali Esika na ngai ya bopemi mpo na libela ; nakovanda awa, pamba te nasepelaki na yango.


Pamba te Yawe aponaki Jakobi, Isalaele, mpo ete azala ya Ye moko.


Esengo na ekolo oyo Yawe azali Nzambe na yango. Esengo na bato oyo aponaki mpo na libula na Ye.


Nzambe, telema, sambisa mokili ; pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.


Yawe akoyokela Jakobi mawa, akopona lisusu Isalaele mpe akopemisa bango na mokili na bango ; bongo bapaya bakosangana na bango mpe bakobakisama na ndako ya Jakobi.


Na pokwa, somo ya pwasa nde eyaka ! Bongo liboso ete tongo etana, eloko moko te etikalaka ! Yango nde lifuti ya bato oyo banyokolaka biso, mpe mbano ya bato oyo bamonisaka biso pasi.


yo oyo nazwaki wuta na basuka ya mabele, oyo nabengaki wuta na basuka na yango, yo oyo epai ya nani nalobaki : ‹ Ozali mosali na Ngai, › naponaki yo mpe nabwakaki yo te.


Kasi Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata Isalaele, ekolo oyo ezali libula na Ye ; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Kasi bato nyonso oyo bakosala yo mabe, bakosala bango mpe mabe ; banguna na yo nyonso bakokende na bowumbu ; bato oyo babotolaki yo biloko, bakobotola bango mpe biloko ; bato oyo banyokolaki yo, bakonyokola mpe bango.


Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata ekolo oyo ezali libula na Ye ; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Tatola lisusu : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bingumba na Ngai ekotondisama lisusu na bomengo, Yawe akobondisa lisusu Siona mpe akopona Yelusalemi. › »


Yawe alobaki na Satana : — Satana, tika ete Yawe apamela yo ! Tika ete Yawe oyo apona Yelusalemi apamela yo ! Boni, moto oyo azali te lokola koni ya moto oyo balongoli na moto ?


Amonaki ye na esobe, kati na mokili oyo ekawuka, etonda na koganga ya somo. Azingelaki ye, abatelaki ye, akengelaki ye lokola mbuma ya liso na Ye.


Pamba te eteni ya Yawe ezali bato na Ye ; Jakobi azali libula na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ