Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 14:2 - Mokanda na Bomoi

2 Nakosangisa bikolo nyonso, na Yelusalemi, mpo ete babundisa engumba yango ; bakobotola yango, bakobuka bandako na yango, bakozwa basi na yango na makasi mpo na kobebisa lokumu na bango, mpe ndambo ya bato kati na yango bakokende na bowumbu, bongo ndambo mosusu ya bato bakotikala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 14:2
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakokata-kata bana na bango na biteni na miso na bango, bakobebisa bandako na bango mpe bakozwa basi na bango na makasi.


Bato oyo bakotikala na Siona mpe ba-oyo bakovanda na Yelusalemi bakobengama basantu : bango nyonso oyo bakombo na bango ekomama kati na bato oyo batikali na bomoi na Yelusalemi.


Yawe atomboli bendele mpo na bikolo oyo ezali mosika, azali kobeta piololo mpo na kobenga bato oyo bazali na suka ya mokili : tala bango wana, bazali koya na lombangu mpe noki !


Kasi bosepela mpe bozala tango nyonso na esengo mpo na misala oyo nakokela, pamba te nakokela Yelusalemi mpo ete ezala na esengo, mpe bato na yango basepela.


‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakomi pene ya kosala ete bibundeli oyo ezali kati na maboko na bino, oyo bozali kosalela mpo na kobundisa mokonzi ya Babiloni mpe bato ya Chalide oyo bazingeli bino na libanda ya engumba, ebalukela bino ; mpe nakosangisa bango kati na engumba oyo.


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi wana Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na basoda na ye nyonso, mikili ya bakonzi nyonso oyo azalaki kokamba, mpe bikolo nyonso bazalaki kobundisa Yelusalemi mpe bingumba nyonso ya zingazinga na yango :


Monguna asemboli loboko na ye likolo ya bomengo nyonso ya Yelusalemi, bongo azali komona bikolo ya bapaya kokota na esika na ye ya bule, bikolo oyo Yo opekisaki kokota kati na lisanga na Yo.


mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Ngai moko nakotelemela yo, Yelusalemi, mpe nakopesa yo etumbu na miso ya bikolo.


Ata mpe kati na basali na Ngai ya mibali mpe ya basi, nakosopa Molimo na Ngai, na mikolo wana.


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : « Mwasi na yo akosala kindumba kati na engumba, bana na yo ya mibali mpe ya basi bakokufa na mopanga, bakokabola mabele na yo na biteni. Yo moko, okokufa na mabele ya mbindo, mpe Isalaele akokende solo na bowumbu, mosika ya mokili na ye ya mbotama. »


« Nakokomisa Yelusalemi lokola kopo ya vino oyo elangwisaka bikolo nyonso ya zingazinga na yango ; bakozingela solo Yuda mpe Yelusalemi.


Na mokolo wana, nakokomisa Yelusalemi lokola libanga ya kilo liboso ya bikolo nyonso ; moto nyonso oyo akoluka kotombola yango akozoka ; mpe bikolo nyonso ekosangana mpo na kobundisa Yelusalemi.


Na mokolo wana, nakobima mpo na koboma bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi.


Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.


Tango bokomona makambo ya nkele kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ;


Pamba te ekozala mikolo ya pasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta Nzambe akela mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.


Na tango wana, Sezare Ogisite abimisaki mobeko ya kotanga motango ya bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mikili nyonso oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Rome.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ