Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 13:8 - Mokanda na Bomoi

8 Na mokili mobimba, » elobi Yawe, « bandambo mibale ya bato kati na bandambo misato bakobebisama mpe bakokufa ; mpe ndambo moko ya bato kati na bandambo misato nde bakotikala na mokili.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 13:8
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki ndambo moko kati na bandambo zomi ya bato ekotikala na mokili, bakobebisama na moto. Kasi ndenge terebente mpe nzete oyo babengaka sheni etikaka misisa na yango soki bakati yango, ndenge wana mpe nkona ya bule ekotika misisa na mokili.


« bakobima mpe bakomona bibembe ya bato oyo batombokelaki Ngai, pamba te bankusu na bango ekokufa te mpe moto na bango ekokufa te ; bakopesa moto nyonso somo. »


Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › elobi Yawe. ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino ; kasi bino, nakobebisa bino nye te ; solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ; nakozanga te kopamela bino. ›


Nakolongola kati na bino bato oyo batombokelaka Ngai mpe bato oyo batelemelaka Ngai. Bongo nakobimisa bango na mokili oyo bazali kovanda lokola bapaya ; kasi bakokota na mokili ya Isalaele te. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.


Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo ; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga.


Na poso moko, akosala boyokani moko elenda elongo na bato ebele ; kasi na kati-kati ya poso yango, akosukisa bambeka mpe makabo. Likolo ya kobomba makambo ya nkele, mobebisi moko akobima kino tango libebi oyo ekatama mpo na mobebisi ekokokisama. »


Bato nyonso ya masumu kati na bato na Ngai bakokufa na mopanga, ba-oyo nyonso balobaka : ‹ Pasi ekotikala te kozwa to kokomela biso ! ›


Kasi kati na bino, nakotika bato oyo bakelela, bato oyo batambolaka na komikitisa, bato oyo bakozwa ebombamelo kati na Kombo na Yawe.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.


Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.


Engumba monene ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki Babiloni monene mpe apesaki yango kopo etonda na vino ya kanda na Ye ya makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ