Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 13:3 - Mokanda na Bomoi

3 Boye, soki moto moko akobi kosakola, tika ete tata mpe mama oyo babota ye baloba na ye : ‹ Osengeli kokufa mpo ete olobi makambo ya lokuta na Kombo na Yawe ! › Wana akozala kosakola, baboti na ye bakotobola ye na mopanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 13:3
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Nayoki makambo oyo basakoli ya lokuta bazali kosakola na Kombo na Ngai ; bazali koloba : ‹ Tala, naloti ndoto ! Naloti ndoto ! ›


Soki mosakoli to Nganga-Nzambe to moto mosusu alobi : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › nakopesa ye elongo na libota na ye etumbu.


Bongo mosakoli Jeremi alobaki lisusu na mosakoli Anania : « Anania, yoka ! Yawe atindi yo te ; mpe ozali kotindika bato oyo na kotia motema na makambo ya lokuta !


bokomona lisusu te bimoniseli na bino wana ya pamba mpe bokoloba lisusu masakoli te ; nakobikisa bato na Ngai na maboko na bino, mpe, na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »


Soki mosakoli moko akosami mpe asakoli makambo, ezali Ngai moko Yawe nde napengwisi ye. Boye, nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa ye etumbu, mpe nakobeta ye kati na bato na Ngai, Isalaele.


Alobaki na ngai : « Mwana na moto, ezali awa nde kiti na Ngai ya bokonzi ezalaka, esika oyo natiaka makolo na Ngai. Ezali na esika oyo nde nakovanda mpo na libela kati na bana ya Isalaele. Libota ya Isalaele ekotikala lisusu te kokomisa Kombo na Ngai mbindo, ezala bango to bakonzi na bango, na nzela ya kindumba na bango mpe ya banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi na likolo ya bisambelo na bango ya likolo ya bangomba.


Moto nyonso oyo alingaka tata na ye mpe mama na ye koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai. Moto nyonso oyo alingaka mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.


— Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai.


Boye, kobanda sik’oyo, tokotala lisusu moto moko te na ndenge ya bomoto. Atako, na kala, totalaki Klisto na ndenge ya bomoto, kasi sik’oyo tozali lisusu kotala Ye bongo te.


Kasi soki mosakoli moko alobi ete azali koloba na Kombo na Ngai, bongo alobi likambo moko oyo Ngai natindi ye te to azali koloba na kombo ya banzambe mosusu, basengeli koboma ye.


oyo atalisaki bolingo epai na Yo koleka, bolingo epai ya baboti na ye, bandeko na ye mpe bana na ye moko, mpo na kotosa maloba na Yo mpe kobatela boyokani na Yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ