Zakari 12:8 - Mokanda na Bomoi8 Na mokolo wana, Yawe akobatela bavandi ya Yelusalemi mpo ete bato ya bolembu kati na bango bakoma makasi lokola Davidi, mpe libota ya Davidi ekoma lokola Nzambe, lokola Anjelu ya Yawe, oyo azali kotambola liboso na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : « Ndenge nkosi to mwana nkosi egangaka liboso ya mosuni na yango, ata lisanga monene ya babateli bibwele basangani mpo na kotelemela yango, ezalaka na somo ya makelele na bango te mpe ezongaka sima te na mangungu na bango, ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokita na ngomba Siona mpe na ngomba na yango ya moke mpo na kobunda.
Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele, alobi epai na ye oyo atiolami mpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo, na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe : « Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema, bakambi bakomona yo mpe bakogumbama, likolo na Yawe oyo azali Sembo, Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. »
Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.