Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 12:5 - Mokanda na Bomoi

5 Boye, bakambi ya Yuda bakomilobela : ‹ Bato ya Yelusalemi bazali makasi mpo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali Nzambe na bango. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 12:5
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzembo ya Davidi. Tika ete Yawe, Libanga na ngai, apambolama ; Ye oyo akembisaka maboko mpe makofi na ngai mpo na bitumba !


Nani azali Nzambe soki Yawe te ? Nani azali libanga soki Nzambe na biso te ?


Nabebisaka bango nye, mpe bakokaka lisusu kotelema te ; bakweyaka na se ya matambe na ngai.


Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.


Boyoka Liloba na Yawe, bino bakambi ya engumba Sodome ! Boyoka mobeko ya Nzambe na biso, bino bato ya engumba Gomore !


Bakambi na yo bazali batomboki, baninga ya miyibi ; bango nyonso balingaka kaka kanyaka mpe batonda na lokoso ya lifuti. Bakotelaka mwana etike te, mpe likambo ya mwasi oyo akufisa mobali etalaka bango te.


nakokomisa lisusu basambisi na bino malamu lokola na tango ya kala ; mpe bapesi toli na bino, ndenge ezalaka na ebandeli. Sima na yango, bakobenga bino lisusu Engumba ya Bosembo, Engumba ya Boyengebene.


Na mokolo wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga, akozala motole ya lokumu mpe elembo ya kitoko mpo na ndambo ya bato na Ye ;


akopesa makanisi ya bosembo epai na ye oyo avandi mpo na kosambisa, mpe akozala mopesi makasi epai na bato oyo babenganaka na bitumba kino na ekuke.


Yawe asopeli bino molimo ya pongi makasi ; akangi bino miso, bino basakoli, azipi bino mito, bino bato oyo bomonaka makambo.


Tala, mokonzi moko akokonza na bosembo, mpe bakambi na ye bakokamba na solo.


Bakoloba na tina na Ngai : ‹ Makasi mpe bosembo ezali kati na Yawe kaka. › » Bato nyonso oyo batombokelaki Ye bakoya epai na Ye mpe bakoyoka soni.


Na esika ya bronze, nakomemela yo wolo, mpe na esika ya bibende, nakomemela yo palata ; na esika ya banzete, nakomemela yo bronze ; mpe na esika ya mabanga, nakomemela yo bibende ; nakokomisa Kimia moyangeli na yo, mpe Bosembo, mokambi na yo.


Mokonzi na bango akowuta kati na bango, mpe mokambi na bango akowuta kaka kati na bango ; nakobenda bango pene na Ngai mpe bakoya pene na Ngai, pamba te nani azali na nguya ya kopusana pene na Ngai ? › elobi Yawe.


wana nakokaki kobwaka bakitani ya Jakobi mpe ya Davidi, mosali na Ngai, mpe nalingaki te kopona moko kati na bana na ye mpo ete akamba bakitani ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi. Nakozongisa lisusu kitoko ya mokili na bango mpe nakoyokela bango mawa. › »


Nakosala ete balendisama kati na Yawe : bakotambola na Kombo na Ye, » elobi Yawe.


« Nakolendisa libota ya Yuda mpe nakobikisa libota ya Jozefi, nakozongisa bango lisusu na mokili na bango, pamba te nakoyokela bango mawa ; bakozala lokola bato oyo nasundolaki te, pamba te nazali Yawe, Nzambe na bango, mpe nakoyanola bango.


Na mokolo wana, nakobangisa bampunda nyonso mpe nakokomisa batambolisi na yango liboma, » elobi Yawe. « Nakosenzela libota ya Yuda, kasi nakoboma miso ya bampunda nyonso ya bikolo.


Na mokolo wana, nakokomisa bakambi ya Yuda lokola moto kati na liboke ya bakoni, lokola koni ya moto na se ya liboke ya matiti ekawuka : bakozikisa bikolo nyonso ya zingazinga na bango, ezala oyo ezali na ngambo ya loboko na bango ya mobali to ya mwasi. Kasi Yelusalemi ekotikala kaka na esika na yango.


Bato ya Yuda mpe bakobunda kati na Yelusalemi, bakokongola bomengo ya bikolo nyonso ya zingazinga : wolo, palata mpe bilamba mingi koleka.


Motema na ngai ezali elongo na bakambi ya Isalaele, elongo na ba-oyo bamipesaki mobimba na bitumba. Bokumisa Yawe !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ