Zakari 12:4 - Mokanda na Bomoi4 Na mokolo wana, nakobangisa bampunda nyonso mpe nakokomisa batambolisi na yango liboma, » elobi Yawe. « Nakosenzela libota ya Yuda, kasi nakoboma miso ya bampunda nyonso ya bikolo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi mpe miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na koyoka libondeli oyo mowumbu na Yo azali kosala liboso na Yo, butu mpe moyi, na tina na basali na Yo, bana ya Isalaele. Nazali kotubela masumu oyo biso bana ya Isalaele, ezala ngai mpe libota ya tata na ngai, tosalaki liboso na Yo.
Na mokolo wana, nakokomisa bakambi ya Yuda lokola moto kati na liboke ya bakoni, lokola koni ya moto na se ya liboke ya matiti ekawuka : bakozikisa bikolo nyonso ya zingazinga na bango, ezala oyo ezali na ngambo ya loboko na bango ya mobali to ya mwasi. Kasi Yelusalemi ekotikala kaka na esika na yango.