Zakari 11:5 - Mokanda na Bomoi5 Bato oyo basombaka bibwele yango babomaka yango, bazalaka na somo ya etumbu ata moko te. Bato oyo batekaka yango balobaka : « Tika ete Yawe apambolama, pamba te nakomi mozwi ! » Mpe bango moko babateli na yango bayokelaka yango mawa ata moke te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natombokeli babateli bibwele ! Nakotuna bango bibwele na Ngai, nakobotola bibwele na Ngai na maboko na bango, nakotika bango lisusu te kobatela yango. Boye, bakokoka lisusu te komilukela bolamu na bango moko. Nakokangola bibwele na Ngai na minoko na bango, mpe ekotikala lisusu bilei na bango te.